Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഇസ്റാഅ്   ആയത്ത്:
وَمَن يَهۡدِ ٱللَّهُ فَهُوَ ٱلۡمُهۡتَدِۖ وَمَن يُضۡلِلۡ فَلَن تَجِدَ لَهُمۡ أَوۡلِيَآءَ مِن دُونِهِۦۖ وَنَحۡشُرُهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ عُمۡيٗا وَبُكۡمٗا وَصُمّٗاۖ مَّأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ كُلَّمَا خَبَتۡ زِدۡنَٰهُمۡ سَعِيرٗا
Mpe oyo Allah akambi, asili kokambama, mpe oyo akobunga, okokoka te kozuela bango bakambi na esika naye (Allah) mpe tokosangisa bango o mokolo ya suka bilongi bisunduami, miso ya kozipama, matoyi makangami, na minoko mikolobaka te, esika na bango nde lifelo. Tango nyoso moto na yango elingi kokita, tokobakisela bango oyo ya makasi koleka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ذَٰلِكَ جَزَآؤُهُم بِأَنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِنَا وَقَالُوٓاْ أَءِذَا كُنَّا عِظَٰمٗا وَرُفَٰتًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ خَلۡقٗا جَدِيدًا
Wana nde lifuta lia bango, mpo bapengwaki na bilembo bia biso, mpe bakolobaka: Tango tokotikala sé mikuwa mpe mputulu na mabele, ya soló penza tokosekwisama lisusu bikelamu ya sika?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّ ٱللَّهَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ قَادِرٌ عَلَىٰٓ أَن يَخۡلُقَ مِثۡلَهُمۡ وَجَعَلَ لَهُمۡ أَجَلٗا لَّا رَيۡبَ فِيهِ فَأَبَى ٱلظَّٰلِمُونَ إِلَّا كُفُورٗا
Boye bazali kornona te ete: Ya sólo, Allah oyo akela likolo na mabele azali na bokoki ya kokela bikelamu bisusu lokola bango? Mpe atiyeli bango mokano ezali na tembe te? Kasi babubi baboyi, (balingi) sé bopengwi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُل لَّوۡ أَنتُمۡ تَمۡلِكُونَ خَزَآئِنَ رَحۡمَةِ رَبِّيٓ إِذٗا لَّأَمۡسَكۡتُمۡ خَشۡيَةَ ٱلۡإِنفَاقِۚ وَكَانَ ٱلۡإِنسَٰنُ قَتُورٗا
Loba: Soki bozalaka na sanduku ya ngolu ya Nkolo wa ngai, bolingaki kobanga kobimisa yango. Kasi moto azali na bopimi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَىٰ تِسۡعَ ءَايَٰتِۭ بَيِّنَٰتٖۖ فَسۡـَٔلۡ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ إِذۡ جَآءَهُمۡ فَقَالَ لَهُۥ فِرۡعَوۡنُ إِنِّي لَأَظُنُّكَ يَٰمُوسَىٰ مَسۡحُورٗا
Mpe tosilaki kopesa na Mûssa makamwisi libua ya polele, botuna bana ba isalayele tango eyelaka bango, kasi falo Alobaki naye: Ya soló, ngai nazali kokanisa ete eh Mûssa! Olokama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ لَقَدۡ عَلِمۡتَ مَآ أَنزَلَ هَٰٓؤُلَآءِ إِلَّا رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ بَصَآئِرَ وَإِنِّي لَأَظُنُّكَ يَٰفِرۡعَوۡنُ مَثۡبُورٗا
Alobi: Ozali koyeba malamu penza ete oyo akitisaki yango sé Allah Nkolo ya likolo na mabele, тропа (kokamwisa) тре bokasi naye, тре ngai nazali kokanisa ete yo eh falo! O sili kobunga nzela elamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَرَادَ أَن يَسۡتَفِزَّهُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ فَأَغۡرَقۡنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ جَمِيعٗا
(Falo) alingaki kobimisa bango na mboka, kasi tozindisaki ye na baye banso bazalaki elongo naye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقُلۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِۦ لِبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱسۡكُنُواْ ٱلۡأَرۡضَ فَإِذَا جَآءَ وَعۡدُ ٱلۡأٓخِرَةِ جِئۡنَا بِكُمۡ لَفِيفٗا
Mpe na sima na yango tolobaki na bana ya isalayele ete; bovanda na mabele kasi tango elaka ya mokolo ya suka ekokokaka tokoya na (bino) ebele na lisanga.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഇസ്റാഅ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക