Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អាន់ហ្វាល   អាយ៉ាត់:
وَإِن يُرِيدُوٓاْ أَن يَخۡدَعُوكَ فَإِنَّ حَسۡبَكَ ٱللَّهُۚ هُوَ ٱلَّذِيٓ أَيَّدَكَ بِنَصۡرِهِۦ وَبِٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Mpe soki balingi kokosa yo, Allah akoki тропа yo. Ye nde asalisaki yo na lisungi naye mpe na bandimi lokola.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَلَّفَ بَيۡنَ قُلُوبِهِمۡۚ لَوۡ أَنفَقۡتَ مَا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا مَّآ أَلَّفۡتَ بَيۡنَ قُلُوبِهِمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ أَلَّفَ بَيۡنَهُمۡۚ إِنَّهُۥ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
Mpe asangisaki mitema mia bango, (na bondimi) ata soki obimisaka manso maye mazali о mabele, mbele osangisaki mitema mia bango te. Kasi Allah nde asangisa kati na bango, ya sólo, ye azali na bokasi atonda bwanya.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ حَسۡبُكَ ٱللَّهُ وَمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Eh yo ntoma! Allah akoki yo, na bandimi baye balandi yo bakoki yo mpe lokola.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ حَرِّضِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ عَلَى ٱلۡقِتَالِۚ إِن يَكُن مِّنكُمۡ عِشۡرُونَ صَٰبِرُونَ يَغۡلِبُواْ مِاْئَتَيۡنِۚ وَإِن يَكُن مِّنكُم مِّاْئَةٞ يَغۡلِبُوٓاْ أَلۡفٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَفۡقَهُونَ
Eh ntoma! Telemela bandimi (yebisa bango) тропа kobunda na bapagano. Soki ezali na ntuku mibale ya bakangi mitema okati na bino, bakolonga nkama mibale, mpe soki bazali mokama moko okati na bino bakolonga nkoto moko okati ya bapagano, mpo ete bazangi bososoli mpe bayebi eloko te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ٱلۡـَٰٔنَ خَفَّفَ ٱللَّهُ عَنكُمۡ وَعَلِمَ أَنَّ فِيكُمۡ ضَعۡفٗاۚ فَإِن يَكُن مِّنكُم مِّاْئَةٞ صَابِرَةٞ يَغۡلِبُواْ مِاْئَتَيۡنِۚ وَإِن يَكُن مِّنكُمۡ أَلۡفٞ يَغۡلِبُوٓاْ أَلۡفَيۡنِ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Sikoyo Allah akutoli bino mokumba, mpe ayebaki ete kati na bino bolembu ezali. Soki bozali na bayiki mpiko mokama moko, bakolonga mikama mibale, mpe soki bazali nkoto moko kati na bino, bakolonga nkoto mibale na ndingisa ya Allah. Mpo ete Allah azali elongo na bakangi mitema.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
مَا كَانَ لِنَبِيٍّ أَن يَكُونَ لَهُۥٓ أَسۡرَىٰ حَتَّىٰ يُثۡخِنَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ تُرِيدُونَ عَرَضَ ٱلدُّنۡيَا وَٱللَّهُ يُرِيدُ ٱلۡأٓخِرَةَۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
Esengelaki te na ntoma kotiya bakangami na bitumba okati ya boloko, sé bakundama na mabele. Boye bozali kolinga lokumu na bomoyi ya nsé nzoka nde Allah alingi bomoyi ya mokolo ya suka. Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لَّوۡلَا كِتَٰبٞ مِّنَ ٱللَّهِ سَبَقَ لَمَسَّكُمۡ فِيمَآ أَخَذۡتُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ
Soki makomi mautaka epai ya Allah te, etumbu ya Allah ya monene elingaki kozua bino.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَكُلُواْ مِمَّا غَنِمۡتُمۡ حَلَٰلٗا طَيِّبٗاۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Mpe bolia biloko ya malamu biye bozuaki yango na bitumba. Mpe bobanga Allah ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អាន់ហ្វាល
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ