Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អាន់ហ្វាល   វាក្យខណ្ឌ:
فَلَمۡ تَقۡتُلُوهُمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ قَتَلَهُمۡۚ وَمَا رَمَيۡتَ إِذۡ رَمَيۡتَ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ رَمَىٰ وَلِيُبۡلِيَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ مِنۡهُ بَلَآءً حَسَنًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
Ezali te bino nde bobomaki bango, kasi Allah nde abomaki bango. Мре tango obwakaki (likonga), ezali yo te nde obwakaki, kasi Allah nde mobwaki, (likonga) mpe ezali тропа kopesa bandimi bolamu na ndenge naye. Ya soló, Allah azali moyoki atonda boyebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ذَٰلِكُمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ مُوهِنُ كَيۡدِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Yango ezali mpo oyeba lolenge kani Allah azali kobebisa mwango ya bapengwi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِن تَسۡتَفۡتِحُواْ فَقَدۡ جَآءَكُمُ ٱلۡفَتۡحُۖ وَإِن تَنتَهُواْ فَهُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۖ وَإِن تَعُودُواْ نَعُدۡ وَلَن تُغۡنِيَ عَنكُمۡ فِئَتُكُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَوۡ كَثُرَتۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Soki bolukaki elonga, ya soló, elonga esilaki koyela bino. Mpe soki botiki ezali malamu тропа bino, kasi soki bozongeli tokozonga, mpe lisanga na bino ekosalisa bino na eloko te, ata soki bozali ebele ndenge nini. Kasi boyeba ete: Ya sólo, Allah azali elongo na bandimi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَلَا تَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ وَأَنتُمۡ تَسۡمَعُونَ
Eh bino baye bondima! Botosa Allah na motindami waye, (Muhammad) kasi boboya ye te mpe bino bozali koyoka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ قَالُواْ سَمِعۡنَا وَهُمۡ لَا يَسۡمَعُونَ
Mpe bozala te lokola baye bazali koloba: Toyokaki, kasi bayokaka te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ إِنَّ شَرَّ ٱلدَّوَآبِّ عِندَ ٱللَّهِ ٱلصُّمُّ ٱلۡبُكۡمُ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡقِلُونَ
Ya sólo, bazoba koleka banyama epai ya Allah, bazali baye bakufa matoyi, baye balobaka te (baba), bango wana bazangi kososola.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَوۡ عَلِمَ ٱللَّهُ فِيهِمۡ خَيۡرٗا لَّأَسۡمَعَهُمۡۖ وَلَوۡ أَسۡمَعَهُمۡ لَتَوَلَّواْ وَّهُم مُّعۡرِضُونَ
Mpe soki Allah ayebaki[1] ete bazali na bolamu, balingaki koyokisa bango maye makosunga bango, mpe soki ata ayokisaki bango balingaki sé kopesa mokongo na koboya.
[1] Allah ayebaki ete bazali na bolamu te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱسۡتَجِيبُواْ لِلَّهِ وَلِلرَّسُولِ إِذَا دَعَاكُمۡ لِمَا يُحۡيِيكُمۡۖ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَحُولُ بَيۡنَ ٱلۡمَرۡءِ وَقَلۡبِهِۦ وَأَنَّهُۥٓ إِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
Eh bino baye bondima! Boyamba mbela ya Allah na motindami, tango azali kobenga bino na maye makobikisa bino. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali okati ya moto na motema naye, mpe boyeba ete ya sólo, epai naye bokosangisama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتَّقُواْ فِتۡنَةٗ لَّا تُصِيبَنَّ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنكُمۡ خَآصَّةٗۖ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Mpe bobanga etumbu eye ekopona te sé baye basali mabe kati na bino, mpe boyeba ya sólo, Allah azali mopesi etumbu ekasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អាន់ហ្វាល
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ