Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Anfāl   Ayah:
إِذۡ تَسۡتَغِيثُونَ رَبَّكُمۡ فَٱسۡتَجَابَ لَكُمۡ أَنِّي مُمِدُّكُم بِأَلۡفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُرۡدِفِينَ
(Mpe bokanisa) tango bosengaki lisungi epai ya Nkolo wa bino. Mpe andimelaki bino, ete ya soló: ngai nakosalisa bino na ba anzelu nkoto yoko bazali kolandana. (bango na bango)
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا جَعَلَهُ ٱللَّهُ إِلَّا بُشۡرَىٰ وَلِتَطۡمَئِنَّ بِهِۦ قُلُوبُكُمۡۚ وَمَا ٱلنَّصۡرُ إِلَّا مِنۡ عِندِ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٌ
Kasi Allah asalaki yango te sé mpo amemela bino sango, тре mpo mitema mia bino mikoka kokita, mpe elonga ezali sé epai na Allah. Ya sólo, Allah azali wa bokasi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِذۡ يُغَشِّيكُمُ ٱلنُّعَاسَ أَمَنَةٗ مِّنۡهُ وَيُنَزِّلُ عَلَيۡكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ لِّيُطَهِّرَكُم بِهِۦ وَيُذۡهِبَ عَنكُمۡ رِجۡزَ ٱلشَّيۡطَٰنِ وَلِيَرۡبِطَ عَلَىٰ قُلُوبِكُمۡ وَيُثَبِّتَ بِهِ ٱلۡأَقۡدَامَ
Mpe tango azipaki bino na mpongi ya токе, ezali lokola ebateli naye likolo na bino mpe akitiseli bino mayi ya mbula kowuta o likolo, тропа kopetola bino na yango, mpe alongóla bino mbindo ya satana mpe akangisa mitema mia bino тре alendisa makolo na bino.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِذۡ يُوحِي رَبُّكَ إِلَى ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ أَنِّي مَعَكُمۡ فَثَبِّتُواْ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ سَأُلۡقِي فِي قُلُوبِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلرُّعۡبَ فَٱضۡرِبُواْ فَوۡقَ ٱلۡأَعۡنَاقِ وَٱضۡرِبُواْ مِنۡهُمۡ كُلَّ بَنَانٖ
Kanisa tango Nkolo wayo ayebisaki ba anzelu, ya solo ngai nazali elongo na bino, bolendisa bandimi. Na kotiya bobangi o mitema mia bapagano. Bobeta bango bakingo тре bobeta bango na biteni binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ شَآقُّواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥۚ وَمَن يُشَاقِقِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَإِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Pamba te, bazangi kotosa Allah na motindami waye. Kasi oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo penza, Allah nde mopesi etumbu ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
ذَٰلِكُمۡ فَذُوقُوهُ وَأَنَّ لِلۡكَٰفِرِينَ عَذَابَ ٱلنَّارِ
Wana nde (ndenge ekozalela bino) esengeli bomeka yango (etumbu)! Mpe ya sólo, etumbu ya bapengwi ekozalaka nde moto.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ زَحۡفٗا فَلَا تُوَلُّوهُمُ ٱلۡأَدۡبَارَ
Eh bino baye bondimi! Soki bokutani na bapengwi, (o bisika binso тропа bitumba) bokima bango te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَن يُوَلِّهِمۡ يَوۡمَئِذٖ دُبُرَهُۥٓ إِلَّا مُتَحَرِّفٗا لِّقِتَالٍ أَوۡ مُتَحَيِّزًا إِلَىٰ فِئَةٖ فَقَدۡ بَآءَ بِغَضَبٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَمَأۡوَىٰهُ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
Mpe oyo kati na bino akokima banguna o mokolo wana, longola sé oyo apesi mokongo тропа koluka lolenge mosusu ya kobunda, to akei kokutana na mapinga mosusu тропа kokoba bitumba, ayeba ete asili kozua nkanda ya Allah. Мре esika naye ekozalaka lifelo, mpe yango nde ekozalaka esika ya mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Anfāl
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close