Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: An-Naml   Ayah:
إِنِّي وَجَدتُّ ٱمۡرَأَةٗ تَمۡلِكُهُمۡ وَأُوتِيَتۡ مِن كُلِّ شَيۡءٖ وَلَهَا عَرۡشٌ عَظِيمٞ
Nakuti mwasi moko azali kokonza bango, mpe makambo mazali kokambama naye, mpe azali na kiti ya bokonzi ya kitoko monene koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَجَدتُّهَا وَقَوۡمَهَا يَسۡجُدُونَ لِلشَّمۡسِ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَصَدَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّبِيلِ فَهُمۡ لَا يَهۡتَدُونَ
Nakuti ye na bato naye bazali kogumbamela moyi, na botiki Allah, mpe satana abongiseli bango misala, mpe abungisi bango nzela ya semba, mpe bakokambama te.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَّاۤ يَسۡجُدُواْۤ لِلَّهِ ٱلَّذِي يُخۡرِجُ ٱلۡخَبۡءَ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَيَعۡلَمُ مَا تُخۡفُونَ وَمَا تُعۡلِنُونَ
Boye bakofukamela Allah te oyo abimisaka maye mabombami kati ya mapata na mabele, mpe ayebi maye bozali kobomba mpe maye bozali komonisa?
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ رَبُّ ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡعَظِيمِ۩
Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye Nkolo ya ngwende ya bonene (ya bokonzi).
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ قَالَ سَنَنظُرُ أَصَدَقۡتَ أَمۡ كُنتَ مِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
(Suleyman) Alobi: Tokotala soki olobi bosôló to ozali kokosa.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱذۡهَب بِّكِتَٰبِي هَٰذَا فَأَلۡقِهۡ إِلَيۡهِمۡ ثُمَّ تَوَلَّ عَنۡهُمۡ فَٱنظُرۡ مَاذَا يَرۡجِعُونَ
Kende kotikela bango mokanda mwa ngai moye, sima tika bango mpe otelema pembeni mpe tala lolenge nini bakoyanola.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَتۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَؤُاْ إِنِّيٓ أُلۡقِيَ إِلَيَّ كِتَٰبٞ كَرِيمٌ
Mokonzi ya mwasi alobi: Eh bankumu! Babwakeli ngai mokanda ya lokumu.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّهُۥ مِن سُلَيۡمَٰنَ وَإِنَّهُۥ بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
Ya soló, ewuti epai ya Suleyman. Mpe ya sólo yango ebandi na nkombo ya Allah wa boboto atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَّا تَعۡلُواْ عَلَيَّ وَأۡتُونِي مُسۡلِمِينَ
Ete bosalela ngai lolendo te, mpe boya epai na ngai nakomisokia (kozala bamizilima).
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَتۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَؤُاْ أَفۡتُونِي فِيٓ أَمۡرِي مَا كُنتُ قَاطِعَةً أَمۡرًا حَتَّىٰ تَشۡهَدُونِ
Alobi: Eh bankumu! Bopesa ngai toli тропа likambo liye, nakosala eloko te kino bokozala awa. (тропа toii)
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ نَحۡنُ أُوْلُواْ قُوَّةٖ وَأُوْلُواْ بَأۡسٖ شَدِيدٖ وَٱلۡأَمۡرُ إِلَيۡكِ فَٱنظُرِي مَاذَا تَأۡمُرِينَ
Balobi: Tozali na bokasi mpe nguya ya kosakana te, liloba ya suka ezali epai nayo, tinda biso na oyo omoni.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَتۡ إِنَّ ٱلۡمُلُوكَ إِذَا دَخَلُواْ قَرۡيَةً أَفۡسَدُوهَا وَجَعَلُوٓاْ أَعِزَّةَ أَهۡلِهَآ أَذِلَّةٗۚ وَكَذَٰلِكَ يَفۡعَلُونَ
Alobi: Ya soló, bakonzi soki bakoti na mboka babebisaka yango, na koboma mpe kosala mabe ebele, mpe bakomisaka bankumu na yango bato mpamba. Mpe lolenge wana nde basalaka.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِنِّي مُرۡسِلَةٌ إِلَيۡهِم بِهَدِيَّةٖ فَنَاظِرَةُۢ بِمَ يَرۡجِعُ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
Mpe na yango ya sólo, ngai nazali kotindela bango likabo sikoyo, mpe na kotala eyano nini ekoyela ngai.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: An-Naml
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close