Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: An-Noor   Ayah:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّبِعُواْ خُطُوَٰتِ ٱلشَّيۡطَٰنِۚ وَمَن يَتَّبِعۡ خُطُوَٰتِ ٱلشَّيۡطَٰنِ فَإِنَّهُۥ يَأۡمُرُ بِٱلۡفَحۡشَآءِ وَٱلۡمُنكَرِۚ وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ مَا زَكَىٰ مِنكُم مِّنۡ أَحَدٍ أَبَدٗا وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يُزَكِّي مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
Eh bino baye bondima! В olanda makolo (nzela) ya satana te, oyo akolanda makolo naye, (boyeba ete) ya sólo, ye atindaka na mobulu mpe na mabe mpe soki Allah alingelaka bino bolamu na mawa naye te, alingaki kopetola moto o kati na bino te, kasi Allah apetolaka oyo alingi, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا يَأۡتَلِ أُوْلُواْ ٱلۡفَضۡلِ مِنكُمۡ وَٱلسَّعَةِ أَن يُؤۡتُوٓاْ أُوْلِي ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينَ وَٱلۡمُهَٰجِرِينَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۖ وَلۡيَعۡفُواْ وَلۡيَصۡفَحُوٓاْۗ أَلَا تُحِبُّونَ أَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
Mpe bato ya bomengo mpe ya bolamu kati na bino balapa te ete bakosalisa lisusu bandeko ba bango te, babola mpe te, bakosalisa mpe ba oyo babimi na nzela ya Allah te, esengeli na bango kolimbisa mpe kobosana, bokosepela te ete Allah alimbisa bino? Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَرۡمُونَ ٱلۡمُحۡصَنَٰتِ ٱلۡغَٰفِلَٰتِ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ لُعِنُواْ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ
Ya sôló, baye bazali kofinga mpe kopanzela basi ya malamu baye bakanisaka kosala mabe te (ekobo), okati ya bandimi ya basi, bapesami botutu awa o nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe bakozalaka na etumbu ekasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَوۡمَ تَشۡهَدُ عَلَيۡهِمۡ أَلۡسِنَتُهُمۡ وَأَيۡدِيهِمۡ وَأَرۡجُلُهُم بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
O mokolo moye; balolemo, maboko mpe makolo na bango makotatolaka maye bazalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَوۡمَئِذٖ يُوَفِّيهِمُ ٱللَّهُ دِينَهُمُ ٱلۡحَقَّ وَيَعۡلَمُونَ أَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡحَقُّ ٱلۡمُبِينُ
Mokolo mona Allah akopesaka bango lifuta na bango na bosembo, mpe bakoyebaka ete ya sólo, Allah azali wa bosôló polele koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلۡخَبِيثَٰتُ لِلۡخَبِيثِينَ وَٱلۡخَبِيثُونَ لِلۡخَبِيثَٰتِۖ وَٱلطَّيِّبَٰتُ لِلطَّيِّبِينَ وَٱلطَّيِّبُونَ لِلطَّيِّبَٰتِۚ أُوْلَٰٓئِكَ مُبَرَّءُونَ مِمَّا يَقُولُونَۖ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَرِزۡقٞ كَرِيمٞ
Basi ya mabe тропа mibali ya mabe mpe mibali ya mabe тропа basi ya mabe, lolenge moko basi ya malamu тропа mibali ya malamu, mpe mibali ya malamu тропа basi ya malamu. Bango wana nde bazali mosika na makambo ya mabe oyo bato bazali koloba, bazali na bolimbisi mpe bozui ya malamu.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَدۡخُلُواْ بُيُوتًا غَيۡرَ بُيُوتِكُمۡ حَتَّىٰ تَسۡتَأۡنِسُواْ وَتُسَلِّمُواْ عَلَىٰٓ أَهۡلِهَاۚ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
Eh, bino baye bondima! Bokota na bandako oyo bizali bandako bia bino te, kino ete bosenga ndingisa, mpe bopesa mbote ya boboto epai ya bato na yango. Wana ezali malamu тропа bino mpo bokoka kokanisa.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: An-Noor
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close