Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Baqarah   Ayah:
مَثَلُهُمۡ كَمَثَلِ ٱلَّذِي ٱسۡتَوۡقَدَ نَارٗا فَلَمَّآ أَضَآءَتۡ مَا حَوۡلَهُۥ ذَهَبَ ٱللَّهُ بِنُورِهِمۡ وَتَرَكَهُمۡ فِي ظُلُمَٰتٖ لَّا يُبۡصِرُونَ
Ndakisa na bango ezali lokola moto oyo apelisi móto, mpe na tango móto engali zinga zinga na yango Allah abungisi bongengi bwa bango, mpe atiki bango okati ya molili, bakomonaka te.
Arabic explanations of the Qur’an:
صُمُّۢ بُكۡمٌ عُمۡيٞ فَهُمۡ لَا يَرۡجِعُونَ
Bakoyokaka bosembo ata moke te, mpe bakolobelaka yongo ata moke te, mpe bakomona yango ata moke te, mpe bakozongaka na bosembo te.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَوۡ كَصَيِّبٖ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ فِيهِ ظُلُمَٰتٞ وَرَعۡدٞ وَبَرۡقٞ يَجۡعَلُونَ أَصَٰبِعَهُمۡ فِيٓ ءَاذَانِهِم مِّنَ ٱلصَّوَٰعِقِ حَذَرَ ٱلۡمَوۡتِۚ وَٱللَّهُ مُحِيطُۢ بِٱلۡكَٰفِرِينَ
Lokola mapata ya moyindo lolenge mbula eyaka mpe na lokito ya nkake na bazali kotia misapi na matoyi mia bango mpo na bobangi lokito ya nkake mpe mpona bobangi ete bakufa, mpe Allah azali mozingi ya bapengwi o bisika binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَكَادُ ٱلۡبَرۡقُ يَخۡطَفُ أَبۡصَٰرَهُمۡۖ كُلَّمَآ أَضَآءَ لَهُم مَّشَوۡاْ فِيهِ وَإِذَآ أَظۡلَمَ عَلَيۡهِمۡ قَامُواْۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَذَهَبَ بِسَمۡعِهِمۡ وَأَبۡصَٰرِهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
Etikalaki sé moke eboma miso na bango mikalali, tango inso bongengi wana ekomeli bango bakotambola, mpe soki molili mozongi batelemi, kasi soki Allah alingaki nde abomi boyoki mpe bomoni bwa bango, ya sôló Allah azali na nguya likolo lia biloko binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ ٱعۡبُدُواْ رَبَّكُمُ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَتَّقُونَ
Eh bino bato! Bobondela Nkolo wa bino oyo akeli bino mpe akeli ba oyo balekaki liboso na bino mpo bozwa bobangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ فِرَٰشٗا وَٱلسَّمَآءَ بِنَآءٗ وَأَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجَ بِهِۦ مِنَ ٱلثَّمَرَٰتِ رِزۡقٗا لَّكُمۡۖ فَلَا تَجۡعَلُواْ لِلَّهِ أَندَادٗا وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
Ye nde oyo akeli mpo na bino mabele lokola mbeto, mpe likolo lokola etando, mpe azali kokitisa mayi kowuta likolo, mpe azali kobimisa na yango bambuma ya lolenge nyonso ezala bozwi mpo na bino, mpe bozuela Allah basangisi te wana bosili koyeba.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِن كُنتُمۡ فِي رَيۡبٖ مِّمَّا نَزَّلۡنَا عَلَىٰ عَبۡدِنَا فَأۡتُواْ بِسُورَةٖ مِّن مِّثۡلِهِۦ وَٱدۡعُواْ شُهَدَآءَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Mpe soki bozali na ntembe na maye tokitisaki epai ya mowumbu na biso, boya na suratu lolenge na yango mpe bobenga banzeneneke na bino[1] na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo.
[1] Baye oyo bazali kobondela na botiki Allah.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن لَّمۡ تَفۡعَلُواْ وَلَن تَفۡعَلُواْ فَٱتَّقُواْ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي وَقُودُهَا ٱلنَّاسُ وَٱلۡحِجَارَةُۖ أُعِدَّتۡ لِلۡكَٰفِرِينَ
Mpe soki bosali yango te, mpe bokokoka kosala yango te, bobanga móto oyo nkoni na yango ekozala bato na mabanga, elengelami mpona bapengwi.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Baqarah
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close