Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: An-Nahl   Ayah:
وَأَلۡقَىٰ فِي ٱلۡأَرۡضِ رَوَٰسِيَ أَن تَمِيدَ بِكُمۡ وَأَنۡهَٰرٗا وَسُبُلٗا لَّعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
Mpe apika bangomba o kati na mabele тропа boningani na yango esala bino mabe te, mpe mingala na banzela, mpo bokoka kokambama.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَلَٰمَٰتٖۚ وَبِٱلنَّجۡمِ هُمۡ يَهۡتَدُونَ
Mpe na bilembo bisusu (bizali kolakisa bino nzela), ndenge moko minzoto mpo ete babunga te.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَفَمَن يَخۡلُقُ كَمَن لَّا يَخۡلُقُۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
Boye, oyo akelaka azali lokola oyo akelaka te? Boye bozali kokanisa te?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِن تَعُدُّواْ نِعۡمَةَ ٱللَّهِ لَا تُحۡصُوهَآۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَغَفُورٞ رَّحِيمٞ
Mpe soki bolingi kotanga bolamu bwa Allah, bokokoka koyeba motango mwa yango te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تُسِرُّونَ وَمَا تُعۡلِنُونَ
Mpe Allah ayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَا يَخۡلُقُونَ شَيۡـٔٗا وَهُمۡ يُخۡلَقُونَ
Na baye wana bazali kobondela basusu mpe kotika Allah bakela eloko te, mpe bango bakelama.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَمۡوَٰتٌ غَيۡرُ أَحۡيَآءٖۖ وَمَا يَشۡعُرُونَ أَيَّانَ يُبۡعَثُونَ
Bazali bakufi kasi bazali na bomoyi te, mpe bayebi te mokolo nini bakosekwisama.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۚ فَٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ قُلُوبُهُم مُّنكِرَةٞ وَهُم مُّسۡتَكۡبِرُونَ
Nzambe wa bino (Allah) azali Nzambe sé moko ya kobondela na bosôló, mpe baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, mitema mia bango miboya bomoko bwa Allah, mpe batondi na lolendo.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا جَرَمَ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُسۡتَكۡبِرِينَ
Ezali na tembe te ete Allah ayebi maye bazali kobomba na maye bazali komonisa polele, ya soló ye alingaka bato ya lolendo te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَا قِيلَ لَهُم مَّاذَآ أَنزَلَ رَبُّكُمۡ قَالُوٓاْ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe soki batuni bango, nini Nkolo wa bino akitisa? Bakolobaka: Ezali masapo makala.
Arabic explanations of the Qur’an:
لِيَحۡمِلُوٓاْ أَوۡزَارَهُمۡ كَامِلَةٗ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَمِنۡ أَوۡزَارِ ٱلَّذِينَ يُضِلُّونَهُم بِغَيۡرِ عِلۡمٍۗ أَلَا سَآءَ مَا يَزِرُونَ
Mpo été mokolo mwa suka bamema mikumba mia bango mibimba, na mikumba ya baye bango babungisaki na kozanga mayele. Boye ezali mabe te mikumba ya motindo oyo!
Arabic explanations of the Qur’an:
قَدۡ مَكَرَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَأَتَى ٱللَّهُ بُنۡيَٰنَهُم مِّنَ ٱلۡقَوَاعِدِ فَخَرَّ عَلَيۡهِمُ ٱلسَّقۡفُ مِن فَوۡقِهِمۡ وَأَتَىٰهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَشۡعُرُونَ
Baye balekaki liboso na bango basilaka kosala likita ya mabe, mpe Allah abetaki na nsé ya misisa ya ndako na bango mpe likolo na yango ekwelaki bango mpe etumbu ezuaki bango o esika bazalaki kokanisa te.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: An-Nahl
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close