Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Ar-Ra‘d   Ayah:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ طُوبَىٰ لَهُمۡ وَحُسۡنُ مَـَٔابٖ
Baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bomoyi bwa kitoko o mokolo mwa suka, mpe bozongi elamu.
Arabic explanations of the Qur’an:
كَذَٰلِكَ أَرۡسَلۡنَٰكَ فِيٓ أُمَّةٖ قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهَآ أُمَمٞ لِّتَتۡلُوَاْ عَلَيۡهِمُ ٱلَّذِيٓ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ وَهُمۡ يَكۡفُرُونَ بِٱلرَّحۡمَٰنِۚ قُلۡ هُوَ رَبِّي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ عَلَيۡهِ تَوَكَّلۡتُ وَإِلَيۡهِ مَتَابِ
Yango wana nde totinda yo okati ya umma[1] oyo bituka ebele esilaki koleka liboso nayo, été otangela bango emoniseli oyo tokitisaki epai nayo. Mpe bazali kopengwa na Ar-Rahmán,[2] loba: Ye nde Nkolo wa ngai nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye, epai naye namipesaka mpe natiye elikya na ngai, mpe epai naye nde nazali komizongisa тропа kotubela.
[1] Umma: Lingomba, bótala suratu Al-Baqarah 128.
[2] Ar-Rahmán: Ezali moko ya kombo ya Allah, Elakisi: oyo atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡ أَنَّ قُرۡءَانٗا سُيِّرَتۡ بِهِ ٱلۡجِبَالُ أَوۡ قُطِّعَتۡ بِهِ ٱلۡأَرۡضُ أَوۡ كُلِّمَ بِهِ ٱلۡمَوۡتَىٰۗ بَل لِّلَّهِ ٱلۡأَمۡرُ جَمِيعًاۗ أَفَلَمۡ يَاْيۡـَٔسِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَن لَّوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَهَدَى ٱلنَّاسَ جَمِيعٗاۗ وَلَا يَزَالُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ تُصِيبُهُم بِمَا صَنَعُواْ قَارِعَةٌ أَوۡ تَحُلُّ قَرِيبٗا مِّن دَارِهِمۡ حَتَّىٰ يَأۡتِيَ وَعۡدُ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُخۡلِفُ ٱلۡمِيعَادَ
Soki ezalaki ete kurani moko ekoka kozwama eye na yango bangomba bikokaki kotambwisama to mpe mabele kopasuka, to elobisaka bibembe, kasi mitindo minso mizali mia Allah. Bandimi bazali koyeba te ete soki Allah alingaki, nde akambaki bato banso o nzela ya semba, na yango тропа baye bazali kondima te, bakozangaka te na maye basalaki ya mabe, bakobetamaka na bitumbu, to mpe bitumbu yango ebeta pene ya bandako na bango kino elaka ya Allah eyela bango. Ya sôló, Allah azangisaka elaka naye te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدِ ٱسۡتُهۡزِئَ بِرُسُلٖ مِّن قَبۡلِكَ فَأَمۡلَيۡتُ لِلَّذِينَ كَفَرُواْ ثُمَّ أَخَذۡتُهُمۡۖ فَكَيۡفَ كَانَ عِقَابِ
Mpe basilaki kotiola na batindami liboso nayo, mpe napesaki bapengwi etumbu, sima bazuamaki, mpe lolenge nini etumbu na ngai ezalaki!
Arabic explanations of the Qur’an:
أَفَمَنۡ هُوَ قَآئِمٌ عَلَىٰ كُلِّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡۗ وَجَعَلُواْ لِلَّهِ شُرَكَآءَ قُلۡ سَمُّوهُمۡۚ أَمۡ تُنَبِّـُٔونَهُۥ بِمَا لَا يَعۡلَمُ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَم بِظَٰهِرٖ مِّنَ ٱلۡقَوۡلِۗ بَلۡ زُيِّنَ لِلَّذِينَ كَفَرُواْ مَكۡرُهُمۡ وَصُدُّواْ عَنِ ٱلسَّبِيلِۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنۡ هَادٖ
Boye oyo azali kornona nyoso oyo molimo na molimo ezali kosala? Mpe bazali kopesa Allah balongani, loba: Bopesa bango bankombo, to bozali koyebisa ye (Allah) eloko nini ayebi te o kati ya mabele? To bozalaki sé kokosa bango na bankombo ya lokuta? Na yango, tobongiseli bapengwi mabe na bango mpe toboyisi bango nzela ya semba. Mpe na oyo Allah abungisi mosusu azali te тропа kokamba ye.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّهُمۡ عَذَابٞ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَشَقُّۖ وَمَا لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن وَاقٖ
Bazali na etumbu na bomoyi ya nsé, mpe etumbu o mokolo mwa suka ekozala makasi mingi, mpe bakozua mobateli moko te (na etumbu) ya Allah.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Ar-Ra‘d
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close