Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আত-তাওবাহ   আয়াত:
قَٰتِلُوهُمۡ يُعَذِّبۡهُمُ ٱللَّهُ بِأَيۡدِيكُمۡ وَيُخۡزِهِمۡ وَيَنصُرۡكُمۡ عَلَيۡهِمۡ وَيَشۡفِ صُدُورَ قَوۡمٖ مُّؤۡمِنِينَ
Bobundisa bango Allah akopesa bango etumbu na maboko na bino mpe akokitisa bango mpe akolongisa bino likolo na bango. Mpe akobikisa mitema mia bandimi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَيُذۡهِبۡ غَيۡظَ قُلُوبِهِمۡۗ وَيَتُوبُ ٱللَّهُ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
Мре akolongola nkanda o mitema mia bango, mpe Allah alimbisaka oyo alingi, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَمۡ حَسِبۡتُمۡ أَن تُتۡرَكُواْ وَلَمَّا يَعۡلَمِ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ جَٰهَدُواْ مِنكُمۡ وَلَمۡ يَتَّخِذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَا رَسُولِهِۦ وَلَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَلِيجَةٗۚ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
Boye, bozali kokanisa ete bokotikama bongo mpe Allah ameki naino te baye babundi o kati na bino, mpe bazui balingami basusu te na batika Allah na motindami naye mpe na bandimi? Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
مَا كَانَ لِلۡمُشۡرِكِينَ أَن يَعۡمُرُواْ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ شَٰهِدِينَ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِم بِٱلۡكُفۡرِۚ أُوْلَٰٓئِكَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ وَفِي ٱلنَّارِ هُمۡ خَٰلِدُونَ
Esengeli te na basambeli ya binzambe nzambe kokota na bandako esantu ya Allah, na matatoli ya bopagano ya polele bazali na yango, bango wana misala mia bango misili kobeba, mpe bakozalaka libela o kati ya moto.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّمَا يَعۡمُرُ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ مَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَأَقَامَ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَى ٱلزَّكَوٰةَ وَلَمۡ يَخۡشَ إِلَّا ٱللَّهَۖ فَعَسَىٰٓ أُوْلَٰٓئِكَ أَن يَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُهۡتَدِينَ
Kasi baye bazali na ndingisa ya kokota na bandako esantu ya Allah. Sé baye bandimi na Allah, na mokolo ya suka, mpe batelemisi losambo mpe babimisi zakat, mpe babangi mususu te sé Allah, baye wana bakozala elongo na bakambami.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ أَجَعَلۡتُمۡ سِقَايَةَ ٱلۡحَآجِّ وَعِمَارَةَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ كَمَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَجَٰهَدَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ لَا يَسۡتَوُۥنَ عِندَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Boye, bolingi kotia moto oyo azali komelisa bapaya ya hajj mayi mpe azali kobongisa ndako esantu ya Allah, lolenge moko na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka mpe abundi o nzela ya Allah? Bakokani te epaí ya Allah, kasi Allah akambaka babubi te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَهَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ أَعۡظَمُ دَرَجَةً عِندَ ٱللَّهِۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
Baye bandimaki mpe batiki (Makkah), mpe babundi o nzela ya Allah na misoio mia bango mpe na milimo mia bango, baleki kozala na esika ya likolo epai ya Allah mpe bango nde balongi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আত-তাওবাহ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ