Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আত-তাগাবূন   আয়াত:

At-Taghâbun

يُسَبِّحُ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۖ لَهُ ٱلۡمُلۡكُ وَلَهُ ٱلۡحَمۡدُۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
(Biloko) nyoso ezali na likolo mpe na nsé ezali kokumisa Allah, bokonzi bozali ya ye, mpe matondo mazali ya ye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
هُوَ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ فَمِنكُمۡ كَافِرٞ وَمِنكُم مُّؤۡمِنٞۚ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٌ
Ye nde akela bino, basusu okati na bino bandimi, mpe basusu bapengwi. Allah azali kornona maye bozali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّ وَصَوَّرَكُمۡ فَأَحۡسَنَ صُوَرَكُمۡۖ وَإِلَيۡهِ ٱلۡمَصِيرُ
Akela likolo na mabele na bosôló, mpe apesi bino lolenge, mpe abongisa bokeli bwa bino, mpe bokozongaka sé epai naye.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَيَعۡلَمُ مَا تُسِرُّونَ وَمَا تُعۡلِنُونَۚ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
Ayebi nyoso oyo ezali na likolo na oyo ezali na mabele, mpe ayebi maye bobombaka na maye bomonisaka polele. Mpe Allah ayebi oyo ebombami okati ya mitema.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَلَمۡ يَأۡتِكُمۡ نَبَؤُاْ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَبۡلُ فَذَاقُواْ وَبَالَ أَمۡرِهِمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Boye sango ya baye bapengwaki liboso na bino ekomelaki bino te bamekaki (etumbu na mokili) mpe bamonaki oyo bamonaki тропа makambo na bango, mpe bakozala na etumbu ya makasi?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُۥ كَانَت تَّأۡتِيهِمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَقَالُوٓاْ أَبَشَرٞ يَهۡدُونَنَا فَكَفَرُواْ وَتَوَلَّواْۖ وَّٱسۡتَغۡنَى ٱللَّهُۚ وَٱللَّهُ غَنِيٌّ حَمِيدٞ
Wana ezali mpo ete batindami na bango baydaki bango bosembo ya polde, kasi bazongisaki eyano ete: Moto nde akoya kokamba biso? Мре bapengwaki mpe bapesi mokongo, mpe esalaki Allah eloko te. Mpo ete Allah azali wa bomengo atonda lokumu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
زَعَمَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَن لَّن يُبۡعَثُواْۚ قُلۡ بَلَىٰ وَرَبِّي لَتُبۡعَثُنَّ ثُمَّ لَتُنَبَّؤُنَّ بِمَا عَمِلۡتُمۡۚ وَذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٞ
Bapagano bakanisi ete bakosekwisama te, Loba: Na nkombo ya Nkolo na ngai bokosekwisama mpe bokozua sango ya maye bosalaki. Мре kosala bongo ezali mpasi te тропа Allah.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَـَٔامِنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَٱلنُّورِ ٱلَّذِيٓ أَنزَلۡنَاۚ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٞ
Mpe bondima na Allah тре bondima na motindami wa ye, mpe bongengi oyo tokitisaki yango (kurani). Mpe Allah ayebi maye bozali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَوۡمَ يَجۡمَعُكُمۡ لِيَوۡمِ ٱلۡجَمۡعِۖ ذَٰلِكَ يَوۡمُ ٱلتَّغَابُنِۗ وَمَن يُؤۡمِنۢ بِٱللَّهِ وَيَعۡمَلۡ صَٰلِحٗا يُكَفِّرۡ عَنۡهُ سَيِّـَٔاتِهِۦ وَيُدۡخِلۡهُ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Mokolo akosangisa bino о mokolo ya lisekwa, wana ekozala mokolo ya bozangi bonene, kasi oyo akondima na Allah mpe asali misala milamu, (Allah) akolimbisa mabe naye mpe akokotisa ye na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, akovandaka kuna libela na libela. Wana ekozala elonga enene.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
Kasi тропа baye bapengwaki mpe baboyaki kondimela mikapo mia biso, bango nde bato ya moto mpe bakozalaka kuna libela na libela, kasi bozongi ya mabe nini wana!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
مَآ أَصَابَ مِن مُّصِيبَةٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ وَمَن يُؤۡمِنۢ بِٱللَّهِ يَهۡدِ قَلۡبَهُۥۚ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
Likama moko te ekokwela moto sé ezala na ndingisa ya Allah, kasi oyo akondimela Allah, (Allah) akokamba motema naye. Мре Allah azali na boyebi ya eloko nyoso.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَۚ فَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَإِنَّمَا عَلَىٰ رَسُولِنَا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ
Botosa Allah mpe botosa motindami (wa ye). Kasi soki boboyi boyeba ete motindami wa biso azali na eloko te sé akomisa nsango ya polele.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye. Mpe epai ya Allah esengeli na bandimi bamikaba.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ مِنۡ أَزۡوَٰجِكُمۡ وَأَوۡلَٰدِكُمۡ عَدُوّٗا لَّكُمۡ فَٱحۡذَرُوهُمۡۚ وَإِن تَعۡفُواْ وَتَصۡفَحُواْ وَتَغۡفِرُواْ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
Eh bino bandimi! Ya soló, kati na basi mpe bana na bino bazali banguna na bino, bokeba na bango. Mpe soki boyoki (bango) mawa, botiki mpe bolimbisi (bango), ya sólo Allah azali molimbisi atonda ngolu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّمَآ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَأَوۡلَٰدُكُمۡ فِتۡنَةٞۚ وَٱللَّهُ عِندَهُۥٓ أَجۡرٌ عَظِيمٞ
Ya sólo, misolo na bana na bino ezali mimekano, mpe epayi na Allah nde lifuta linene lizali.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ مَا ٱسۡتَطَعۡتُمۡ وَٱسۡمَعُواْ وَأَطِيعُواْ وَأَنفِقُواْ خَيۡرٗا لِّأَنفُسِكُمۡۗ وَمَن يُوقَ شُحَّ نَفۡسِهِۦ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
Mpe bobanga Allah na bokoki na bino, mpe boyoka mpe botosa mpe bobimisa (тропа Allah) ezali malamu тропа bino moko, mpe oyo akomibatela mosika na moyimi naye, ba oyo wana nde balongi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِن تُقۡرِضُواْ ٱللَّهَ قَرۡضًا حَسَنٗا يُضَٰعِفۡهُ لَكُمۡ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ شَكُورٌ حَلِيمٌ
Soki bokotiseli Allah nyongo ya malamu akobakisela bino ebele, mpe akolimbisa bino, mpe Allah azongisaka matondi atonda mawa.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Ayebi maye mabombami na maye mazali polele (azali) wa bokasi atonda bwanya.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আত-তাগাবূন
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ