Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আন-নিছা   আয়াত:
وَٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ أَمۡوَٰلَهُمۡ رِئَآءَ ٱلنَّاسِ وَلَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَلَا بِٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۗ وَمَن يَكُنِ ٱلشَّيۡطَٰنُ لَهُۥ قَرِينٗا فَسَآءَ قَرِينٗا
Mpe na baye bazali kobimisa mbongo na bango mpona komilakisa epai na bato, mpe baboyi kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka. Mpe moto oyo azali moninga ya satana mpe oyo nde molongani ya mabe.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَمَاذَا عَلَيۡهِمۡ لَوۡ ءَامَنُواْ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَأَنفَقُواْ مِمَّا رَزَقَهُمُ ٱللَّهُۚ وَكَانَ ٱللَّهُ بِهِمۡ عَلِيمًا
Mpasi nini ezali kosala bango soki bandimaki na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe babimisi na misolo miye Allah apesi bango (na nzela ya Allah)? Kasi ya sôló, Allah ayebi bango malamu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَظۡلِمُ مِثۡقَالَ ذَرَّةٖۖ وَإِن تَكُ حَسَنَةٗ يُضَٰعِفۡهَا وَيُؤۡتِ مِن لَّدُنۡهُ أَجۡرًا عَظِيمٗا
Ya sôló, Allah abubaka moto te na mosala naye ata moke lokola mbuma. Mpe soki ezali mosala ya malamu, (Allah) akobakisela bango mbala ebele. Mpe akopesa mbano enene kowuta epai naye.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَكَيۡفَ إِذَا جِئۡنَا مِن كُلِّ أُمَّةِۭ بِشَهِيدٖ وَجِئۡنَا بِكَ عَلَىٰ هَٰٓؤُلَآءِ شَهِيدٗا
Mpe ekozala ndenge nini mokolo moye tokobimisa umma[1] nyonso na nzeneneke na yango, mpe tokoya nayo ete ozala nzeneneke na bango banso?.
[1] Umma: Lisanga, bótala suratu Al-Baqarah mokapo 128.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَوۡمَئِذٖ يَوَدُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَعَصَوُاْ ٱلرَّسُولَ لَوۡ تُسَوَّىٰ بِهِمُ ٱلۡأَرۡضُ وَلَا يَكۡتُمُونَ ٱللَّهَ حَدِيثٗا
Mokolo moye baye baboyaki kondima mpe baboyi kotosa motindami, mposa na bango ekozala ete mabele makunda bango, mpe bakokoka kobombela Allah ata na liloba moko te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَقۡرَبُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَأَنتُمۡ سُكَٰرَىٰ حَتَّىٰ تَعۡلَمُواْ مَا تَقُولُونَ وَلَا جُنُبًا إِلَّا عَابِرِي سَبِيلٍ حَتَّىٰ تَغۡتَسِلُواْۚ وَإِن كُنتُم مَّرۡضَىٰٓ أَوۡ عَلَىٰ سَفَرٍ أَوۡ جَآءَ أَحَدٞ مِّنكُم مِّنَ ٱلۡغَآئِطِ أَوۡ لَٰمَسۡتُمُ ٱلنِّسَآءَ فَلَمۡ تَجِدُواْ مَآءٗ فَتَيَمَّمُواْ صَعِيدٗا طَيِّبٗا فَٱمۡسَحُواْ بِوُجُوهِكُمۡ وَأَيۡدِيكُمۡۗ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَفُوًّا غَفُورًا
Eh bino bandimi! Bopusana na losambo te tango bozali na molangwa, kino bokososola maye bozali koloba, mpe tango bozali na mbindo kino bokosukola, longola sé oyo azali na nzela ya mobembo, kasi soki bozali na bokono to mpe bozali na mobembo to mpe moko kati na bino awuti na nzongo ya monene to nzongo ya moke, to mpe bosangani na basi, mpe bozui mayi te mpo ya kopetola nzoto, bosimba mabele ya mpeto mpe bopangusa yango na bilongi na bino, mpe maboko ma bino. Yasôló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ أُوتُواْ نَصِيبٗا مِّنَ ٱلۡكِتَٰبِ يَشۡتَرُونَ ٱلضَّلَٰلَةَ وَيُرِيدُونَ أَن تَضِلُّواْ ٱلسَّبِيلَ
Oyebaki te ete baye eteni ya buku epesamelaki bango bazali kosomba libunga, mpe bazali kolinga ete bobunga nzela lokola?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আন-নিছা
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ