Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আচ-ছাজদাহ   আয়াত:

As-Sajdah

الٓمٓ
Alif, lâm, mîm.[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
تَنزِيلُ ٱلۡكِتَٰبِ لَا رَيۡبَ فِيهِ مِن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bokiti ya buku ezali na tembe te, ewuti epai ya Nkolo wa molongo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۚ بَلۡ هُوَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ لِتُنذِرَ قَوۡمٗا مَّآ أَتَىٰهُم مِّن نَّذِيرٖ مِّن قَبۡلِكَ لَعَلَّهُمۡ يَهۡتَدُونَ
То mpe bakoloba ete ye nde (Muhammad) asali yango na ndenge naye?, kasi yango ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, mpo ete okebisa na yango bato oyo mokebisi moko te ayela bango liboso nayo, mpo ete bakambama.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ مَا لَكُم مِّن دُونِهِۦ مِن وَلِيّٖ وَلَا شَفِيعٍۚ أَفَلَا تَتَذَكَّرُونَ
Allah nde akela likolo na mabele, mpe maye manso mazali kati na yango mibale na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende. Na botiki ye, bozali na mobateli mpe molobeli te. Boye bozali kokanisa te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ ثُمَّ يَعۡرُجُ إِلَيۡهِ فِي يَوۡمٖ كَانَ مِقۡدَارُهُۥٓ أَلۡفَ سَنَةٖ مِّمَّا تَعُدُّونَ
Azali kokamba kowuta na likolo makambo ya likolo na ya nsé, sima makambo yango mazali komata epai naye na mokolo moko oyo ezali lokola mbula nkoto moko epai na bino lolenge botangaka.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ذَٰلِكَ عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Ye nde ayebi mabombami na makambo ya polele, azali na nguya atonda ngolu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِيٓ أَحۡسَنَ كُلَّ شَيۡءٍ خَلَقَهُۥۖ وَبَدَأَ خَلۡقَ ٱلۡإِنسَٰنِ مِن طِينٖ
Ye nde abongisa bokelami ya biloko binso, mpe abandaki kokela moto na mabele ya potopoto.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ جَعَلَ نَسۡلَهُۥ مِن سُلَٰلَةٖ مِّن مَّآءٖ مَّهِينٖ
Sima abimisi bakitani naye kowuta na litanga ya mayi ya motawu ya mokongo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ سَوَّىٰهُ وَنَفَخَ فِيهِ مِن رُّوحِهِۦۖ وَجَعَلَ لَكُمُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَٱلۡأَفۡـِٔدَةَۚ قَلِيلٗا مَّا تَشۡكُرُونَ
Apesi ye lolenge naye ya kitoko mpe afuli ye kowuta na molimo naye atieli bino boyoki, bomoni mpe mitema. Kasi moke bozali na botondi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَقَالُوٓاْ أَءِذَا ضَلَلۡنَا فِي ٱلۡأَرۡضِ أَءِنَّا لَفِي خَلۡقٖ جَدِيدِۭۚ بَلۡ هُم بِلِقَآءِ رَبِّهِمۡ كَٰفِرُونَ
Mpe bazali koloba ete: Soki tosili kolimwa na nsé na mabele, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? Kasi bazali kopengwa nde na bokutani ya Nkolo na bango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ قُلۡ يَتَوَفَّىٰكُم مَّلَكُ ٱلۡمَوۡتِ ٱلَّذِي وُكِّلَ بِكُمۡ ثُمَّ إِلَىٰ رَبِّكُمۡ تُرۡجَعُونَ
Loba: Anzelu ya liwa oyo atiyami тропа bino, akoboma bino, sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আচ-ছাজদাহ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ