Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আশ্ব-শ্বুআৰা   আয়াত:
كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ لُوطٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Nazali motindami malamu тропа bino.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَتَأۡتُونَ ٱلذُّكۡرَانَ مِنَ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَتَذَرُونَ مَا خَلَقَ لَكُمۡ رَبُّكُم مِّنۡ أَزۡوَٰجِكُمۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٌ عَادُونَ
Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰلُوطُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُخۡرَجِينَ
Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ إِنِّي لِعَمَلِكُم مِّنَ ٱلۡقَالِينَ
Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
رَبِّ نَجِّنِي وَأَهۡلِي مِمَّا يَعۡمَلُونَ
Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima, tobomaki basusu baye batikalaki.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِم مَّطَرٗاۖ فَسَآءَ مَطَرُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
كَذَّبَ أَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ شُعَيۡبٌ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
Nazali motindami malamu epai na bino.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Bobanga Allah mpe botosa ngai.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ أَوۡفُواْ ٱلۡكَيۡلَ وَلَا تَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُخۡسِرِينَ
Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَزِنُواْ بِٱلۡقِسۡطَاسِ ٱلۡمُسۡتَقِيمِ
Mpe botondisa emekelo na bosembo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَا تَبۡخَسُواْ ٱلنَّاسَ أَشۡيَآءَهُمۡ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ
Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te).
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আশ্ব-শ্বুআৰা
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ