Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-হজ্জ   আয়াত:
وَكَذَٰلِكَ أَنزَلۡنَٰهُ ءَايَٰتِۭ بَيِّنَٰتٖ وَأَنَّ ٱللَّهَ يَهۡدِي مَن يُرِيدُ
Na yango nde wana tokitisaki (kurani) na mikapo miye mizali Polele, mpe ya soló Allah akambaka oyo alingi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱلَّذِينَ هَادُواْ وَٱلصَّٰبِـِٔينَ وَٱلنَّصَٰرَىٰ وَٱلۡمَجُوسَ وَٱلَّذِينَ أَشۡرَكُوٓاْ إِنَّ ٱللَّهَ يَفۡصِلُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدٌ
Ya soló, baye bandima, bayuda, ba swâbi-îna[1], mpe baklišto mpe basambeli ya moto, na baye bazali kosangisa Allah. Ya sólo Allah akokataka makambo o kati kati na bango o mokolo ya suka. Ya soló Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso.
[1] Swâbi-îna: Bótala suratu Al-Mâ-idah: 69, Al-Baqarah: 62.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ يَسۡجُدُۤ لَهُۥۤ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ وَٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ وَٱلنُّجُومُ وَٱلۡجِبَالُ وَٱلشَّجَرُ وَٱلدَّوَآبُّ وَكَثِيرٞ مِّنَ ٱلنَّاسِۖ وَكَثِيرٌ حَقَّ عَلَيۡهِ ٱلۡعَذَابُۗ وَمَن يُهِنِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِن مُّكۡرِمٍۚ إِنَّ ٱللَّهَ يَفۡعَلُ مَا يَشَآءُ۩
Boye ozali kornona te ete biloko binso biye bizali o likolo na o nsé bizali kofukamela Allah moyi na sanza, minzoto na bangomba, banzete na banyama mpe bato ebele? Мре ebele babongi na etumbu, mpe oyo Allah asilisi ye lokunu, akozua moto te ya komatisa ye lokumu. Ya sólo Allah asalaka oyo alingi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ هَٰذَانِ خَصۡمَانِ ٱخۡتَصَمُواْ فِي رَبِّهِمۡۖ فَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ قُطِّعَتۡ لَهُمۡ ثِيَابٞ مِّن نَّارٖ يُصَبُّ مِن فَوۡقِ رُءُوسِهِمُ ٱلۡحَمِيمُ
Mabota mibale oyo bazali kobunda тропа Nkolo wa bango, mpe ba oyo bakondima te, bakotongela bango bilamba ya moto mpe bakosopela bango mayi ya moto o mitu mia bango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يُصۡهَرُ بِهِۦ مَا فِي بُطُونِهِمۡ وَٱلۡجُلُودُ
Ekoniangwisa nyoso oyo ezalaki o kati na mabumu na bango, na loposo lokola.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَهُم مَّقَٰمِعُ مِنۡ حَدِيدٖ
Mpe bakobetama na miniololo ya bibende.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
كُلَّمَآ أَرَادُوٓاْ أَن يَخۡرُجُواْ مِنۡهَا مِنۡ غَمٍّ أُعِيدُواْ فِيهَا وَذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡحَرِيقِ
Tango nyoso bakolingaka kobima kowuta na yango nakati ya mpasi ya makasi, bakozongisaka bango nakati na yango, mpe bakolobaka na bango: Вотека etumbu ya bozikisami.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ ٱللَّهَ يُدۡخِلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ يُحَلَّوۡنَ فِيهَا مِنۡ أَسَاوِرَ مِن ذَهَبٖ وَلُؤۡلُؤٗاۖ وَلِبَاسُهُمۡ فِيهَا حَرِيرٞ
Ya soló, Allah akokotisa bandimi na baye basalaki misala milamu o lola oyo ezali kolekisa na nsé na yango mingala, bakolatisa bango bapalata ya wolo na bazigida, mpe bakolataka bilamba ya hariri[1].
[1] Hariri: Siliki.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-হজ্জ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ