Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: হূদ   আয়াত:

Hûd

الٓرۚ كِتَٰبٌ أُحۡكِمَتۡ ءَايَٰتُهُۥ ثُمَّ فُصِّلَتۡ مِن لَّدُنۡ حَكِيمٍ خَبِيرٍ
Alif, lâm, râ[1]. Buku eye mikapo miango mibongisami na lolenge ya kitoko mpe milimbolami na oyo atonda bwanya, moyebi ya ba sango.
[1] Alif, Lâm, Râ: Bótala suratu Al-Baqarah mokopo: 1.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۚ إِنَّنِي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ وَبَشِيرٞ
Bobondela te sé Allah, ya soló nazali mokebisi mpe mopesi sango тропа bino.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَأَنِ ٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِ يُمَتِّعۡكُم مَّتَٰعًا حَسَنًا إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى وَيُؤۡتِ كُلَّ ذِي فَضۡلٖ فَضۡلَهُۥۖ وَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٖ كَبِيرٍ
Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye, akopesa bino bomengo kitoko kino na ntango oyo eyebani, mpe akopesa moto nyoso bolamu boye bokokani naye. Kasi soki boboyi solo ngai nazali kobangela bino etumbu o mokolo ya monene.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِلَى ٱللَّهِ مَرۡجِعُكُمۡۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
Bokozongisama epai ya Allah, тре azali na bokoki na biloko binso.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَلَآ إِنَّهُمۡ يَثۡنُونَ صُدُورَهُمۡ لِيَسۡتَخۡفُواْ مِنۡهُۚ أَلَا حِينَ يَسۡتَغۡشُونَ ثِيَابَهُمۡ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
Kasi sólo, bazali kotondisa mitema mia bango na kobomba (ki bonguna), ata soki bazali komibomba na bilamba bia bango, ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa polele, ya soló, ye ayebaka maye mabombami o kati ya mitema.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: হূদ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ