Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ئەنئام   ئايەت:
وَمَا قَدَرُواْ ٱللَّهَ حَقَّ قَدۡرِهِۦٓ إِذۡ قَالُواْ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ عَلَىٰ بَشَرٖ مِّن شَيۡءٖۗ قُلۡ مَنۡ أَنزَلَ ٱلۡكِتَٰبَ ٱلَّذِي جَآءَ بِهِۦ مُوسَىٰ نُورٗا وَهُدٗى لِّلنَّاسِۖ تَجۡعَلُونَهُۥ قَرَاطِيسَ تُبۡدُونَهَا وَتُخۡفُونَ كَثِيرٗاۖ وَعُلِّمۡتُم مَّا لَمۡ تَعۡلَمُوٓاْ أَنتُمۡ وَلَآ ءَابَآؤُكُمۡۖ قُلِ ٱللَّهُۖ ثُمَّ ذَرۡهُمۡ فِي خَوۡضِهِمۡ يَلۡعَبُونَ
Bapesi Allah lukumu naye te ndenge esengeli, ntango balobi ete: Allah akitisi eloko te apai na moto. Loba: Nani akitisaki buku oyo Mûssa ayaki na yango bongengi mpe bokambi тропа bato? Bokomaki yango na bamakasa bazali kobimisa yango mpe bozali kobomba ebele kati na yango. Etangisi bino na batata na bino maye boyebaki liboso te, loba: Allah, sima tika bango basakana na kati ya libunga na bango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَهَٰذَا كِتَٰبٌ أَنزَلۡنَٰهُ مُبَارَكٞ مُّصَدِّقُ ٱلَّذِي بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَلِتُنذِرَ أُمَّ ٱلۡقُرَىٰ وَمَنۡ حَوۡلَهَاۚ وَٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ يُؤۡمِنُونَ بِهِۦۖ وَهُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ يُحَافِظُونَ
Kaši buku oyo (kurani) tokitisi yango epambolami ezali kondima na oyo ekitaki liboso, mpe mpo ete okebisa na yango mama ya bituka[1] na baye bazali zingazinga na yango.[2] Mpe na baye bandimi na mokolo ya suka bazali kondima na yango mpe bazali kobatela losambo na bango.
[1] Makkah. [2] Elingi koloba: Nzinganzinga ya Makkah тре na mokili mobimba.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ قَالَ أُوحِيَ إِلَيَّ وَلَمۡ يُوحَ إِلَيۡهِ شَيۡءٞ وَمَن قَالَ سَأُنزِلُ مِثۡلَ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُۗ وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذِ ٱلظَّٰلِمُونَ فِي غَمَرَٰتِ ٱلۡمَوۡتِ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ بَاسِطُوٓاْ أَيۡدِيهِمۡ أَخۡرِجُوٓاْ أَنفُسَكُمُۖ ٱلۡيَوۡمَ تُجۡزَوۡنَ عَذَابَ ٱلۡهُونِ بِمَا كُنتُمۡ تَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ غَيۡرَ ٱلۡحَقِّ وَكُنتُمۡ عَنۡ ءَايَٰتِهِۦ تَسۡتَكۡبِرُونَ
Mpe nani azali moto mabe koleka moto oyo alobi lokuta na nkombo ya Allah? То mpe azali koloba ete: Bapesi ngai emoniseli, nzoka nde bakitiseli ye eloko te? To mpe oyo akoloba: Nakokitisa emoniseli ndenge Allah akitisi? Mpe soki okomona bato mabe ndenge bakozala o kati ya molangwa ya liwa, mpe ba anzelu bakotandela bango maboko:[1] Bobimisa milimo na bino, lelo bokozua etumbu ya kosilisa lokumu тропа maye bozalaki koloba bosembo te na nkombo ya Allah, mpe bozalaki kosala lolendo na mikapo naye.
[1] Bakobeta bango na tango milimo na bango ezali kobima.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَقَدۡ جِئۡتُمُونَا فُرَٰدَىٰ كَمَا خَلَقۡنَٰكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةٖ وَتَرَكۡتُم مَّا خَوَّلۡنَٰكُمۡ وَرَآءَ ظُهُورِكُمۡۖ وَمَا نَرَىٰ مَعَكُمۡ شُفَعَآءَكُمُ ٱلَّذِينَ زَعَمۡتُمۡ أَنَّهُمۡ فِيكُمۡ شُرَكَٰٓؤُاْۚ لَقَد تَّقَطَّعَ بَيۡنَكُمۡ وَضَلَّ عَنكُم مَّا كُنتُمۡ تَزۡعُمُونَ
Bino wana boye liboso na biso lelo bino moko, ndenge tokelaki bino mbala ya liboso. Botiki sima na bino nyoso oyo topesaki bino mpe tozali kornona te banani bakolobela bino, baye bozalaki kotuta ntolo ete bozali na basangani, kosangana na bino esili kokatana, mpe baye bozalaki kotutela ntolo basundoli bino (lokola balobeli).
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ئەنئام
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش