Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: يۇنۇس   ئايەت:
وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ ٱئۡتُونِي بِكُلِّ سَٰحِرٍ عَلِيمٖ
Mpe falo alobi: В óyela ngai banganga banso baye bayebi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَلَمَّا جَآءَ ٱلسَّحَرَةُ قَالَ لَهُم مُّوسَىٰٓ أَلۡقُواْ مَآ أَنتُم مُّلۡقُونَ
Mpe tango banganga bayei, Mûssa alobi na bango: Bobwaka maye bolingi kobwaka.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَلَمَّآ أَلۡقَوۡاْ قَالَ مُوسَىٰ مَا جِئۡتُم بِهِ ٱلسِّحۡرُۖ إِنَّ ٱللَّهَ سَيُبۡطِلُهُۥٓ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُصۡلِحُ عَمَلَ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
Tango babwaki, Mûssa alobi: Oyo boyeyi na yango ezali sé bonganga, Allah akobebisa yango. Ya sólo, Allah abongisaka misala mia babebisi te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَيُحِقُّ ٱللَّهُ ٱلۡحَقَّ بِكَلِمَٰتِهِۦ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
Mpe Allah azali kolongisa bosembo na maloba naye ata soki batomboki bazali koboya.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَمَآ ءَامَنَ لِمُوسَىٰٓ إِلَّا ذُرِّيَّةٞ مِّن قَوۡمِهِۦ عَلَىٰ خَوۡفٖ مِّن فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِمۡ أَن يَفۡتِنَهُمۡۚ وَإِنَّ فِرۡعَوۡنَ لَعَالٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَإِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ
Mpe bandimaki na Mûssa te sé lisanga moko ya bilenge ya bato ya falo mpo été bazalaki kobanga falo mpe bankumu ya pembeni naye, noki basala bango mabe. Kasi ya soló, falo amitombolaki o kati ya mokili, mpe azalaki o kati ya balekisi ndelo.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَقَالَ مُوسَىٰ يَٰقَوۡمِ إِن كُنتُمۡ ءَامَنتُم بِٱللَّهِ فَعَلَيۡهِ تَوَكَّلُوٓاْ إِن كُنتُم مُّسۡلِمِينَ
Mpe Mûssa alobaki: Oh bato ba ngai! Soki bondimi na Allah, bomipesa naye. Soki bozali batosi. (bamizilima)
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَقَالُواْ عَلَى ٱللَّهِ تَوَكَّلۡنَا رَبَّنَا لَا تَجۡعَلۡنَا فِتۡنَةٗ لِّلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Balobaki: Tomipesi na Allah, Oh Nkolo wa biso! Kotiyela biso etumbu ya babubi te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَنَجِّنَا بِرَحۡمَتِكَ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe kangola biso na mawa mayo, o maboko ya bapagano.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰ وَأَخِيهِ أَن تَبَوَّءَا لِقَوۡمِكُمَا بِمِصۡرَ بُيُوتٗا وَٱجۡعَلُواْ بُيُوتَكُمۡ قِبۡلَةٗ وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Mpe toyebisaki na Mûssa na ndeko waye, bosalela bato ba bino bandako na egipito, mpe botiyela yango bisika ya kosambela, mpe botelemisa losambo. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَقَالَ مُوسَىٰ رَبَّنَآ إِنَّكَ ءَاتَيۡتَ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَأَهُۥ زِينَةٗ وَأَمۡوَٰلٗا فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا رَبَّنَا لِيُضِلُّواْ عَن سَبِيلِكَۖ رَبَّنَا ٱطۡمِسۡ عَلَىٰٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ وَٱشۡدُدۡ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَلَا يُؤۡمِنُواْ حَتَّىٰ يَرَوُاْ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
Mpe Mûssa alobi: Nkolo wa biso! Sólo opesi falo na bato baye bolamu na mokili. Bazali kobungisa na yango (bato) nzela nayo. Oh Nkolo wa biso! Bebisa misolo mia bango, mpe kanga mitema mia bango ete bandima te, kino bakomona etumbu ya makasi ekoyelaka bango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: يۇنۇس
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش