Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: توبه   آیت:
يُرِيدُونَ أَن يُطۡفِـُٔواْ نُورَ ٱللَّهِ بِأَفۡوَٰهِهِمۡ وَيَأۡبَى ٱللَّهُ إِلَّآ أَن يُتِمَّ نُورَهُۥ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡكَٰفِرُونَ
Balingi kozimisa bongengi bwa Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali sé kokolisa bongengi bwa ye, ata soki bapengwi bazali koboya.
عربي تفسیرونه:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ رَسُولَهُۥ بِٱلۡهُدَىٰ وَدِينِ ٱلۡحَقِّ لِيُظۡهِرَهُۥ عَلَى ٱلدِّينِ كُلِّهِۦ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡمُشۡرِكُونَ
Yende atindaki motindami naye na bokambi mpe na lingomba lia bosôló, mpo été ezala likolo ya mangomba nyoso, ata soki basambeli ya bikeko (basangisi) bazali koyina yango.
عربي تفسیرونه:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلۡأَحۡبَارِ وَٱلرُّهۡبَانِ لَيَأۡكُلُونَ أَمۡوَٰلَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡبَٰطِلِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۗ وَٱلَّذِينَ يَكۡنِزُونَ ٱلذَّهَبَ وَٱلۡفِضَّةَ وَلَا يُنفِقُونَهَا فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٖ
Eh bandimi! Ya soló, ebele ya bakonzi ya lingomba epai ya bayuda na ba klišto, bazali kolia misolo mia bato na lokuta, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, mpe na baye bazali kobomba nkita ya wolo mpe mpalata (mbongo), mpe baboyi kobimisa yango na nzela ya Allah, pesa bango sango ya etumbu makasi.
عربي تفسیرونه:
يَوۡمَ يُحۡمَىٰ عَلَيۡهَا فِي نَارِ جَهَنَّمَ فَتُكۡوَىٰ بِهَا جِبَاهُهُمۡ وَجُنُوبُهُمۡ وَظُهُورُهُمۡۖ هَٰذَا مَا كَنَزۡتُمۡ لِأَنفُسِكُمۡ فَذُوقُواْ مَا كُنتُمۡ تَكۡنِزُونَ
Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na moto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ عِدَّةَ ٱلشُّهُورِ عِندَ ٱللَّهِ ٱثۡنَا عَشَرَ شَهۡرٗا فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ يَوۡمَ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ مِنۡهَآ أَرۡبَعَةٌ حُرُمٞۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُۚ فَلَا تَظۡلِمُواْ فِيهِنَّ أَنفُسَكُمۡۚ وَقَٰتِلُواْ ٱلۡمُشۡرِكِينَ كَآفَّةٗ كَمَا يُقَٰتِلُونَكُمۡ كَآفَّةٗۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُتَّقِينَ
Ya sólo, motango ya basanza epai ya Allah mozali (sanza) zomi na mibale okati ya makomi ma Allah, uta mokolo akela likolo na nsé, okati na yango (sanza) minei mizali esantu, wana ezali lingomba lia semba, mpe bobuba milimo na bino te okati na yango, mpe bobundisa basangisi Allah mobimba, ndenge bazali kobundisi bino, тре boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: توبه
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول