Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: انفال   آیت:
وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَلَا تَنَٰزَعُواْ فَتَفۡشَلُواْ وَتَذۡهَبَ رِيحُكُمۡۖ وَٱصۡبِرُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Мре botosa Allah na motindami waye, mpe bosuana suana te noki bokokabwana mpe bokozanga bokasi. Na yango, bolenda na kokanga motema pamba te ya soló Allah azali elongo na bakangi mitema.
عربي تفسیرونه:
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ خَرَجُواْ مِن دِيَٰرِهِم بَطَرٗا وَرِئَآءَ ٱلنَّاسِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ وَٱللَّهُ بِمَا يَعۡمَلُونَ مُحِيطٞ
Mpe bozala te lokola baye babimaki na bandako na bango na lolendo ete bato bamona bango, mpe kopekisa nzela ya Allah. Kasi Allah azingi maye bazali kosala.
عربي تفسیرونه:
وَإِذۡ زَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ وَقَالَ لَا غَالِبَ لَكُمُ ٱلۡيَوۡمَ مِنَ ٱلنَّاسِ وَإِنِّي جَارٞ لَّكُمۡۖ فَلَمَّا تَرَآءَتِ ٱلۡفِئَتَانِ نَكَصَ عَلَىٰ عَقِبَيۡهِ وَقَالَ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّنكُمۡ إِنِّيٓ أَرَىٰ مَا لَا تَرَوۡنَ إِنِّيٓ أَخَافُ ٱللَّهَۚ وَٱللَّهُ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Mpe tango satana abongiselaki bango misala mpe alobi na bango ete: Moto moko te akokoka bino lelo. Mpo ete ngai nazali na bino. Mpe tango mapinga mibale makutani, abaluki azongi sima mpe alobi: Ya sólo, ngai nawangani bino, mpe nazali mosika na bino, ngai nazali kornona maye bozali kornona te. Ya sólo, ngai nazali kobanga Allah, mpo Allah apesaka etumbu ya makasi.
عربي تفسیرونه:
إِذۡ يَقُولُ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ وَٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ غَرَّ هَٰٓؤُلَآءِ دِينُهُمۡۗ وَمَن يَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
(Bokanisa) tango bato ya bilongi mibale, mpe baye bazali na bokono o kati ya mitema mia bango, balobaki na bandimi ete: Bato oyo lingomba lia bango lizali kokosa bango. Kasi oyo akomipesa na Allah, ayeba ete yasoló, Allah azali na bokasi atonda bwanya.
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ يَتَوَفَّى ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَضۡرِبُونَ وُجُوهَهُمۡ وَأَدۡبَٰرَهُمۡ وَذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡحَرِيقِ
Soki omoni tango ba anzelu babimisaka milimo mia bapengwi, bazali kobeta bango na bilongi bia bango, mpe mikongo mia bango, bazali koloba: Bomeka etumbu ya moto.
عربي تفسیرونه:
ذَٰلِكَ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيكُمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَيۡسَ بِظَلَّٰمٖ لِّلۡعَبِيدِ
Wana nde (etumbu) oyo bino moko bomisalelaki, mpe ya sólo, Allah abubaka bawumbu naye te.
عربي تفسیرونه:
كَدَأۡبِ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ قَوِيّٞ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Ndenge moko na bato ya falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, bapengwaki na bilembo bia Allah. Allah azuaki bango na masumu ma bango. Ya sólo, Allah azali na bokasi mpe mopesi etumbu ya makasi.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: انفال
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول