Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نوح   آیت:
يُرۡسِلِ ٱلسَّمَآءَ عَلَيۡكُم مِّدۡرَارٗا
Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana,
عربي تفسیرونه:
وَيُمۡدِدۡكُم بِأَمۡوَٰلٖ وَبَنِينَ وَيَجۡعَل لَّكُمۡ جَنَّٰتٖ وَيَجۡعَل لَّكُمۡ أَنۡهَٰرٗا
Mpe apesa bino misolo na bana ebele, mpe abómbela bino bilanga mpe mingala.
عربي تفسیرونه:
مَّا لَكُمۡ لَا تَرۡجُونَ لِلَّهِ وَقَارٗا
Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli?
عربي تفسیرونه:
وَقَدۡ خَلَقَكُمۡ أَطۡوَارًا
Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama?
عربي تفسیرونه:
أَلَمۡ تَرَوۡاْ كَيۡفَ خَلَقَ ٱللَّهُ سَبۡعَ سَمَٰوَٰتٖ طِبَاقٗا
Bozali kornona te lolenge Allah akela mapata sambo elandani,
عربي تفسیرونه:
وَجَعَلَ ٱلۡقَمَرَ فِيهِنَّ نُورٗا وَجَعَلَ ٱلشَّمۡسَ سِرَاجٗا
Mpe atiya bongengi kati ya sanza mpe mwinda okati ya moyi?
عربي تفسیرونه:
وَٱللَّهُ أَنۢبَتَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ نَبَاتٗا
Allah nde abimisa bino na mabele lokola milona.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ يُعِيدُكُمۡ فِيهَا وَيُخۡرِجُكُمۡ إِخۡرَاجٗا
Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza.
عربي تفسیرونه:
وَٱللَّهُ جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ بِسَاطٗا
Allah atandela bino mabele ezala lokola etoko,
عربي تفسیرونه:
لِّتَسۡلُكُواْ مِنۡهَا سُبُلٗا فِجَاجٗا
Mpo botambola na kati ya banzela na yango.
عربي تفسیرونه:
قَالَ نُوحٞ رَّبِّ إِنَّهُمۡ عَصَوۡنِي وَٱتَّبَعُواْ مَن لَّمۡ يَزِدۡهُ مَالُهُۥ وَوَلَدُهُۥٓ إِلَّا خَسَارٗا
Nûh alobaki ete: Nkolo! Baboyi kotosa ngai kaši balandi sé moto oyo bozui naye na bana ekobakisela ye sé libungi.
عربي تفسیرونه:
وَمَكَرُواْ مَكۡرٗا كُبَّارٗا
Mpe basali likita ya monene, (ya mabe).
عربي تفسیرونه:
وَقَالُواْ لَا تَذَرُنَّ ءَالِهَتَكُمۡ وَلَا تَذَرُنَّ وَدّٗا وَلَا سُوَاعٗا وَلَا يَغُوثَ وَيَعُوقَ وَنَسۡرٗا
Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)
عربي تفسیرونه:
وَقَدۡ أَضَلُّواْ كَثِيرٗاۖ وَلَا تَزِدِ ٱلظَّٰلِمِينَ إِلَّا ضَلَٰلٗا
(Mpe) yango bisili kobungisa ebele mpe ezali kobakisela babubi sé libungi.
عربي تفسیرونه:
مِّمَّا خَطِيٓـَٰٔتِهِمۡ أُغۡرِقُواْ فَأُدۡخِلُواْ نَارٗا فَلَمۡ يَجِدُواْ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ أَنصَارٗا
Mpona mabe na bango, bazindisamaki na mayi, mpe bakotaki na móto, mpe bazuaki basungi te na botiki Allah.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ نُوحٞ رَّبِّ لَا تَذَرۡ عَلَى ٱلۡأَرۡضِ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ دَيَّارًا
Mpe Nûh alobi: Nkolo! Kotika ata mopagano moko te na mokili.
عربي تفسیرونه:
إِنَّكَ إِن تَذَرۡهُمۡ يُضِلُّواْ عِبَادَكَ وَلَا يَلِدُوٓاْ إِلَّا فَاجِرٗا كَفَّارٗا
Soki otiki bango (na bomoyi), bakobungisa bawumbu nayo mpe bakobota sé basumuki.
عربي تفسیرونه:
رَّبِّ ٱغۡفِرۡ لِي وَلِوَٰلِدَيَّ وَلِمَن دَخَلَ بَيۡتِيَ مُؤۡمِنٗا وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِۖ وَلَا تَزِدِ ٱلظَّٰلِمِينَ إِلَّا تَبَارَۢا
Nkolo! Limbisa ngai, na baboti na ngai na moto nyoso oyo akokota ndako na ngai mondimi mpe bandimi ya mibali na ya basi, mpe kobakisela bapengwi te sé libungi.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نوح
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول