Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: ق   آیت:

Qâf

قٓۚ وَٱلۡقُرۡءَانِ ٱلۡمَجِيدِ
Qâf[1] Na kurani ya lokumu.
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربي تفسیرونه:
بَلۡ عَجِبُوٓاْ أَن جَآءَهُم مُّنذِرٞ مِّنۡهُمۡ فَقَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا شَيۡءٌ عَجِيبٌ
Kasi bazali kokamwa ete mokebisi ayeli bango okati na libota na bango moko, mpe bapagano balobi ete: Oyo ezali likambo ya kokamwa.
عربي تفسیرونه:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗاۖ ذَٰلِكَ رَجۡعُۢ بَعِيدٞ
Boye soki tango tokokufaka tokokomaka putulu? Wana ekozalaka bozongi ya mosika.
عربي تفسیرونه:
قَدۡ عَلِمۡنَا مَا تَنقُصُ ٱلۡأَرۡضُ مِنۡهُمۡۖ وَعِندَنَا كِتَٰبٌ حَفِيظُۢ
Ya soló, toyebi ndenge nini mabele ekolia banzoto na bango, mpe tozali na buku eye ezali kobomba manso.
عربي تفسیرونه:
بَلۡ كَذَّبُواْ بِٱلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُمۡ فَهُمۡ فِيٓ أَمۡرٖ مَّرِيجٍ
Kasi baboyaki kondima na bosôló oyo eyelaki bango, mpe bazali komiyeba lisusu te.
عربي تفسیرونه:
أَفَلَمۡ يَنظُرُوٓاْ إِلَى ٱلسَّمَآءِ فَوۡقَهُمۡ كَيۡفَ بَنَيۡنَٰهَا وَزَيَّنَّٰهَا وَمَا لَهَا مِن فُرُوجٖ
Boye bazali kornona likolo te lolenge nini tokela mpe topesaki yango bonzenga? Tokembisaki yango ezala kopasuka te.
عربي تفسیرونه:
وَٱلۡأَرۡضَ مَدَدۡنَٰهَا وَأَلۡقَيۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ وَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجِۭ بَهِيجٖ
Мре lolenge nini fotandaki mabele (na bonene), тре tolendisaki yango na bangomba, тре tobotisi yango lolenge nyoso ya biloko.
عربي تفسیرونه:
تَبۡصِرَةٗ وَذِكۡرَىٰ لِكُلِّ عَبۡدٖ مُّنِيبٖ
Mpo mowumbu nyoso oyo azali kolikia na bozongi amona mpe akanisa.
عربي تفسیرونه:
وَنَزَّلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ مُّبَٰرَكٗا فَأَنۢبَتۡنَا بِهِۦ جَنَّٰتٖ وَحَبَّ ٱلۡحَصِيدِ
Mpe tozali kokitisa mayi mapamboama kowuta na likolo, mpe tobotisi na yango bilanga na ba mbuma oyo bazali kobuka yango.[1]
[1] Nagh’l: Bótala na suratu Al-Isrâ mokapo: 91. Na suratu Al-Kahf: 32.
عربي تفسیرونه:
وَٱلنَّخۡلَ بَاسِقَٰتٖ لَّهَا طَلۡعٞ نَّضِيدٞ
Mpe nagh’l[1] ya milai na biteni na yango ezali ya kokangama.
[1] Nagh’l: Bótala na suratu Al-Isrâ mokapo: 91. Na suratu Al-Kahf: 32.
عربي تفسیرونه:
رِّزۡقٗا لِّلۡعِبَادِۖ وَأَحۡيَيۡنَا بِهِۦ بَلۡدَةٗ مَّيۡتٗاۚ كَذَٰلِكَ ٱلۡخُرُوجُ
(Ezala) bozui тропа bawumbu (na ngai), mpe na yango topesaki bomoyi na mboka oyo ekufa. Lolenge wana nde lisekwa ekozala.
عربي تفسیرونه:
كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَأَصۡحَٰبُ ٱلرَّسِّ وَثَمُودُ
Bato ya Núh mpe ya Rass mpe ba Thamúd baboyaki liboso kondima.
عربي تفسیرونه:
وَعَادٞ وَفِرۡعَوۡنُ وَإِخۡوَٰنُ لُوطٖ
Lolenge moko na ba aad mpe falo na bandeko ya Loth.
عربي تفسیرونه:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡأَيۡكَةِ وَقَوۡمُ تُبَّعٖۚ كُلّٞ كَذَّبَ ٱلرُّسُلَ فَحَقَّ وَعِيدِ
Mpe bato ya Aykah, na bato ya Tubba, banso baboyaki kondima na batindami kasi bakozuaka etumbu.
عربي تفسیرونه:
أَفَعَيِينَا بِٱلۡخَلۡقِ ٱلۡأَوَّلِۚ بَلۡ هُمۡ فِي لَبۡسٖ مِّنۡ خَلۡقٖ جَدِيدٖ
Te. Tolembaki te na bokeli ya liboso. Kasi bazali na tembe na ntina ya bokeli ya sika.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: ق
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول