Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: مائده   آیت:
وَقَفَّيۡنَا عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِم بِعِيسَى ٱبۡنِ مَرۡيَمَ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ مِنَ ٱلتَّوۡرَىٰةِۖ وَءَاتَيۡنَٰهُ ٱلۡإِنجِيلَ فِيهِ هُدٗى وَنُورٞ وَمُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ مِنَ ٱلتَّوۡرَىٰةِ وَهُدٗى وَمَوۡعِظَةٗ لِّلۡمُتَّقِينَ
Mpe na sima na bango, totindaki Issa mwana ya Maryam ete andima na maye mazalaki liboso naye maye mazali okati ya torah. Mpe topesaki ye Indjil okati na yango bokambi mpe bongengi ezali kondima na maye mazalaki liboso na yango kowuta na torah, yango ezali bokambi mpe malendisi mpona baye bazali na bobangi.[1]
[1] Allah.
عربي تفسیرونه:
وَلۡيَحۡكُمۡ أَهۡلُ ٱلۡإِنجِيلِ بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فِيهِۚ وَمَن لَّمۡ يَحۡكُم بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
Mpe bato ya Indjil, bakata makambo na maye Allah akitisaki o kati na yango. Mpe baye bakokata makambo na maye Allah akitisaki te bango nde babebisi.
عربي تفسیرونه:
وَأَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ مِنَ ٱلۡكِتَٰبِ وَمُهَيۡمِنًا عَلَيۡهِۖ فَٱحۡكُم بَيۡنَهُم بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُۖ وَلَا تَتَّبِعۡ أَهۡوَآءَهُمۡ عَمَّا جَآءَكَ مِنَ ٱلۡحَقِّۚ لِكُلّٖ جَعَلۡنَا مِنكُمۡ شِرۡعَةٗ وَمِنۡهَاجٗاۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَجَعَلَكُمۡ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ وَلَٰكِن لِّيَبۡلُوَكُمۡ فِي مَآ ءَاتَىٰكُمۡۖ فَٱسۡتَبِقُواْ ٱلۡخَيۡرَٰتِۚ إِلَى ٱللَّهِ مَرۡجِعُكُمۡ جَمِيعٗا فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ فِيهِ تَخۡتَلِفُونَ
Mpe tokitiselaki yo[1] buku[2] na bosôló, ezali kondima na maye mazalaki liboso kati na babuku mpe mobateli likolo na yango. Kata makambo kati na bango na maye Allah akitisi. Kasi kolanda mposa na bango te mpona kotika bosôló oyo eyeli yo, lisanga na lisanga totia mibeko mpe nzela ya kolanda. Soki Allah alingaki mbele atiaki bino umma[3] moko, kasi ezali mpo ameka bino lisanga nini ekosala malamu. Bowelana mpona kosala bolamu. Epai na Allah nde bozongi na bino banso, mpe akoyebisa bino na ntina ya maye bozalaki na bokeseni na yango.
[1] Muhammad.
[2] Kurani.
[3] Umma: Lisanga, bótala Al-Baqarah mokapo 198.
عربي تفسیرونه:
وَأَنِ ٱحۡكُم بَيۡنَهُم بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ وَلَا تَتَّبِعۡ أَهۡوَآءَهُمۡ وَٱحۡذَرۡهُمۡ أَن يَفۡتِنُوكَ عَنۢ بَعۡضِ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ إِلَيۡكَۖ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَٱعۡلَمۡ أَنَّمَا يُرِيدُ ٱللَّهُ أَن يُصِيبَهُم بِبَعۡضِ ذُنُوبِهِمۡۗ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِ لَفَٰسِقُونَ
Mpe kata makambo kati kati na bango na maye Allah akitisi, kasi kolanda bamposa na bango te, mpe keba na bango mpo ete bakomeka yo na ndambu ya maye Allah akitisi epai nayo. Mpe soki bapesi mokongo, yeba ete ya sôló Allah alingi kopesa bango etumbu na ndambu ya masumu na bango. Mpe ya sôló ebele ya bato bazali nde babebisi.
عربي تفسیرونه:
أَفَحُكۡمَ ٱلۡجَٰهِلِيَّةِ يَبۡغُونَۚ وَمَنۡ أَحۡسَنُ مِنَ ٱللَّهِ حُكۡمٗا لِّقَوۡمٖ يُوقِنُونَ
Boye, mobeko ya boyinga nde balingi? Nani ayebi kokata makambo koleka Allah? Wana ezali mpona baye bazali na kondima ya sôló?
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: مائده
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول