Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: شوری   آیت:
وَتَرَىٰهُمۡ يُعۡرَضُونَ عَلَيۡهَا خَٰشِعِينَ مِنَ ٱلذُّلِّ يَنظُرُونَ مِن طَرۡفٍ خَفِيّٖۗ وَقَالَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ ٱلۡخَٰسِرِينَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَأَهۡلِيهِمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ أَلَآ إِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ فِي عَذَابٖ مُّقِيمٖ
Mpe okomona bakotiyaka bango liboso lia lifelo bazali kobanga, bazali koyeba lisusu te wapi bakokendeke, bakomi kotala malembe na liso lioko, mpe bandimi bakolobaka: Ya soló, bazangi bazali baye bamizangisi bango moko elongo na mabota ma bango mokolo ya suka. Ya solo, babubi bakozalaka na etumbu ya libela.
عربي تفسیرونه:
وَمَا كَانَ لَهُم مِّنۡ أَوۡلِيَآءَ يَنصُرُونَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِن سَبِيلٍ
Mpe bakozuaka babikisi misusu te na botiki Allah. Na oyo Allah abungisi, akozuaka lisusu nzela te.
عربي تفسیرونه:
ٱسۡتَجِيبُواْ لِرَبِّكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ يَوۡمٞ لَّا مَرَدَّ لَهُۥ مِنَ ٱللَّهِۚ مَا لَكُم مِّن مَّلۡجَإٖ يَوۡمَئِذٖ وَمَا لَكُم مِّن نَّكِيرٖ
Boyamba mbela ya Nkolo na bino yambo ete eyela bino na mokolo oyo Allah akozongisa yango sima te. Mokolo yango kowumela ekozala te mpe bokokoka kowangana (masumu na bino) te.
عربي تفسیرونه:
فَإِنۡ أَعۡرَضُواْ فَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ عَلَيۡهِمۡ حَفِيظًاۖ إِنۡ عَلَيۡكَ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُۗ وَإِنَّآ إِذَآ أَذَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِنَّا رَحۡمَةٗ فَرِحَ بِهَاۖ وَإِن تُصِبۡهُمۡ سَيِّئَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ فَإِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ كَفُورٞ
Soki babaluki, totindi yo te mpo ozala mokengeli na bango, ezali тропа yo kaka sé okomisa sango. Mpe biso soki topesi moto bolamu na biso asepeli na yango, mpe soki mpasi ezui bango тропа maye maboko ma bangomoko masalaki, ya soló moto azanga botondi.
عربي تفسیرونه:
لِّلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ يَهَبُ لِمَن يَشَآءُ إِنَٰثٗا وَيَهَبُ لِمَن يَشَآءُ ٱلذُّكُورَ
Bokonzi ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Akelaka maye oyo alingi apesaka likabo ya mwana mwasi na moto oyo alingi, mpe apesaka mwana mobali na oyo alingi.
عربي تفسیرونه:
أَوۡ يُزَوِّجُهُمۡ ذُكۡرَانٗا وَإِنَٰثٗاۖ وَيَجۡعَلُ مَن يَشَآءُ عَقِيمًاۚ إِنَّهُۥ عَلِيمٞ قَدِيرٞ
To abimisaka bango mapasa mobali na mwasi, mpe azangisaka kobota na oyo alingi. Ya sólo ye azali moyebi mpe akoka.
عربي تفسیرونه:
۞ وَمَا كَانَ لِبَشَرٍ أَن يُكَلِّمَهُ ٱللَّهُ إِلَّا وَحۡيًا أَوۡ مِن وَرَآيِٕ حِجَابٍ أَوۡ يُرۡسِلَ رَسُولٗا فَيُوحِيَ بِإِذۡنِهِۦ مَا يَشَآءُۚ إِنَّهُۥ عَلِيٌّ حَكِيمٞ
Mpe ezali na moto moko te oyo Allah asololi naye polele sé ezala emoniseli, to ezala sima ya eloko ezipi ye, to mpe atindela ye motindami (anzelu) mpe apesa ye oyo alingi na ndingisa naye (Allah). Ya sólo aleki na likolo mpe atonda bwanya.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: شوری
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول