Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: فصلت   آیت:

Fusswilat

حمٓ
Hâ, mîm[1].
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربي تفسیرونه:
تَنزِيلٞ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu.
عربي تفسیرونه:
كِتَٰبٞ فُصِّلَتۡ ءَايَٰتُهُۥ قُرۡءَانًا عَرَبِيّٗا لِّقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba.
عربي تفسیرونه:
بَشِيرٗا وَنَذِيرٗا فَأَعۡرَضَ أَكۡثَرُهُمۡ فَهُمۡ لَا يَسۡمَعُونَ
(Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُواْ قُلُوبُنَا فِيٓ أَكِنَّةٖ مِّمَّا تَدۡعُونَآ إِلَيۡهِ وَفِيٓ ءَاذَانِنَا وَقۡرٞ وَمِنۢ بَيۡنِنَا وَبَيۡنِكَ حِجَابٞ فَٱعۡمَلۡ إِنَّنَا عَٰمِلُونَ
Mpe balobi: Mitema mia biso mikangami na maye ozali kobenga biso na yango, matoyi na biso mazali ya kokangama, kati kati na biso nayo ezali na ezipelo. Sala oyo ya yo, biso mpe tosala ya biso.
عربي تفسیرونه:
قُلۡ إِنَّمَآ أَنَا۠ بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يُوحَىٰٓ إِلَيَّ أَنَّمَآ إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَٱسۡتَقِيمُوٓاْ إِلَيۡهِ وَٱسۡتَغۡفِرُوهُۗ وَوَيۡلٞ لِّلۡمُشۡرِكِينَ
Loba: Ya soló, nazali sé moto lokola bino oyo liloba ekitelaki ngai ete Nzambe na bino azali sé moko, bomisembola epai naye mpe bosenga ye bolimbisi. Kasi mawa ezali na basangisi (Allah),
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ كَٰفِرُونَ
Baye bazali koboya kofuta zakat mpe bazali kopengwa тропа mokolo ya suka.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ أَجۡرٌ غَيۡرُ مَمۡنُونٖ
Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na lifuta liye likokatanaka te.
عربي تفسیرونه:
۞ قُلۡ أَئِنَّكُمۡ لَتَكۡفُرُونَ بِٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَرۡضَ فِي يَوۡمَيۡنِ وَتَجۡعَلُونَ لَهُۥٓ أَندَادٗاۚ ذَٰلِكَ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Loba: Ya sólo, bozali kopengwa naye oyo akeli mabele na mikolo mibale, mpe bozali kotiela ye bambanda? Ye wana nde Nkolo ya mikili.
عربي تفسیرونه:
وَجَعَلَ فِيهَا رَوَٰسِيَ مِن فَوۡقِهَا وَبَٰرَكَ فِيهَا وَقَدَّرَ فِيهَآ أَقۡوَٰتَهَا فِيٓ أَرۡبَعَةِ أَيَّامٖ سَوَآءٗ لِّلسَّآئِلِينَ
Ye apika bangomba likolo na yango, mpe apamboli yango mpe akokisi bomengo na yango na mikolo minei, wana nde eyano тропа baye bazali kotuna yo.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰٓ إِلَى ٱلسَّمَآءِ وَهِيَ دُخَانٞ فَقَالَ لَهَا وَلِلۡأَرۡضِ ٱئۡتِيَا طَوۡعًا أَوۡ كَرۡهٗا قَالَتَآ أَتَيۡنَا طَآئِعِينَ
Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: فصلت
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ شمېره
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

تړل