Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: زمر   آیت:
وَبَدَا لَهُمۡ سَيِّـَٔاتُ مَا كَسَبُواْ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Mpe mabe na bango ebimi polele, mpe bazingami na ntina ya maye bazalaki kotiola.
عربي تفسیرونه:
فَإِذَا مَسَّ ٱلۡإِنسَٰنَ ضُرّٞ دَعَانَا ثُمَّ إِذَا خَوَّلۡنَٰهُ نِعۡمَةٗ مِّنَّا قَالَ إِنَّمَآ أُوتِيتُهُۥ عَلَىٰ عِلۡمِۭۚ بَلۡ هِيَ فِتۡنَةٞ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
Mpe soki mpasi ezui moto, abeleli biso, mpe soki topesi ye bolamu, alobi ete: Nazui yango na mayele na ngai. Nzoka nde yango ezali komekama. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
قَدۡ قَالَهَا ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَمَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
В aye baleka liboso na bango basilaki koloba yango, mpe maye bazuaki esalisaki bango te.
عربي تفسیرونه:
فَأَصَابَهُمۡ سَيِّـَٔاتُ مَا كَسَبُواْۚ وَٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنۡ هَٰٓؤُلَآءِ سَيُصِيبُهُمۡ سَيِّـَٔاتُ مَا كَسَبُواْ وَمَا هُم بِمُعۡجِزِينَ
Mpe mpasi ezuaki bango тропа mabe basalaki. Kasi babubi o kati na ba oyo bakozua mabe na ntina ya maye basalaki mpe bakokoka kolongola yango te.
عربي تفسیرونه:
أَوَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
Boye bazali koyeba te ete ya soló, Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka? Wana ezali bilembo mpo bato bakoka kondima.
عربي تفسیرونه:
۞ قُلۡ يَٰعِبَادِيَ ٱلَّذِينَ أَسۡرَفُواْ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡ لَا تَقۡنَطُواْ مِن رَّحۡمَةِ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ يَغۡفِرُ ٱلذُّنُوبَ جَمِيعًاۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
Loba: Eh bawumbu na nga! Baye basala mabe koleka ndelo, bozanga elikia te тропа ngolu ya Allah, ya sólo Allah alimbisaka masumu manso. Mpo ete ya sólo, ye azali molimbisi atonda mawa.
عربي تفسیرونه:
وَأَنِيبُوٓاْ إِلَىٰ رَبِّكُمۡ وَأَسۡلِمُواْ لَهُۥ مِن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَكُمُ ٱلۡعَذَابُ ثُمَّ لَا تُنصَرُونَ
Mpe bozonga epai ya Nkolo wa bino na tubela, mpe bomisokia epai naye yambo ete etumbu eyela bino, noki bokozua lisalisi te.
عربي تفسیرونه:
وَٱتَّبِعُوٓاْ أَحۡسَنَ مَآ أُنزِلَ إِلَيۡكُم مِّن رَّبِّكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَكُمُ ٱلۡعَذَابُ بَغۡتَةٗ وَأَنتُمۡ لَا تَشۡعُرُونَ
Mpe bolanda ya malamu kati na maye makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, yambo ete etumbu eyela bino mbalakaka mpe bozali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
أَن تَقُولَ نَفۡسٞ يَٰحَسۡرَتَىٰ عَلَىٰ مَا فَرَّطتُ فِي جَنۢبِ ٱللَّهِ وَإِن كُنتُ لَمِنَ ٱلسَّٰخِرِينَ
Yambo molimo eloba ete, mabe na ngai, тропа kozanga botosi epai na Allah, kasi nazalaki ya soló okati ya basakani,
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: زمر
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول