Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: یس   آیت:
۞ وَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَىٰ قَوۡمِهِۦ مِنۢ بَعۡدِهِۦ مِن جُندٖ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَمَا كُنَّا مُنزِلِينَ
Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye.
عربي تفسیرونه:
إِن كَانَتۡ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ فَإِذَا هُمۡ خَٰمِدُونَ
Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango.
عربي تفسیرونه:
يَٰحَسۡرَةً عَلَى ٱلۡعِبَادِۚ مَا يَأۡتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye.
عربي تفسیرونه:
أَلَمۡ يَرَوۡاْ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ أَنَّهُمۡ إِلَيۡهِمۡ لَا يَرۡجِعُونَ
Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te?
عربي تفسیرونه:
وَإِن كُلّٞ لَّمَّا جَمِيعٞ لَّدَيۡنَا مُحۡضَرُونَ
Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba).
عربي تفسیرونه:
وَءَايَةٞ لَّهُمُ ٱلۡأَرۡضُ ٱلۡمَيۡتَةُ أَحۡيَيۡنَٰهَا وَأَخۡرَجۡنَا مِنۡهَا حَبّٗا فَمِنۡهُ يَأۡكُلُونَ
Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia.
عربي تفسیرونه:
وَجَعَلۡنَا فِيهَا جَنَّٰتٖ مِّن نَّخِيلٖ وَأَعۡنَٰبٖ وَفَجَّرۡنَا فِيهَا مِنَ ٱلۡعُيُونِ
Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil[1] mpe a’náb[2] mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi,
[1] Naghil: Bótala yango na Al-Baqarah: 266. Na suratu Al-An’ám: 99.
[2] A’nab: Bótala yango na Al-Baqarah: 266. Na suratu Al-An’ám: 99.
عربي تفسیرونه:
لِيَأۡكُلُواْ مِن ثَمَرِهِۦ وَمَا عَمِلَتۡهُ أَيۡدِيهِمۡۚ أَفَلَا يَشۡكُرُونَ
Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te[2] ?
[2] A’nab: Bótala yango na Al-Baqarah: 266. Na suratu Al-An’ám: 99.
عربي تفسیرونه:
سُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَزۡوَٰجَ كُلَّهَا مِمَّا تُنۢبِتُ ٱلۡأَرۡضُ وَمِنۡ أَنفُسِهِمۡ وَمِمَّا لَا يَعۡلَمُونَ
Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te!
عربي تفسیرونه:
وَءَايَةٞ لَّهُمُ ٱلَّيۡلُ نَسۡلَخُ مِنۡهُ ٱلنَّهَارَ فَإِذَا هُم مُّظۡلِمُونَ
Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili.
عربي تفسیرونه:
وَٱلشَّمۡسُ تَجۡرِي لِمُسۡتَقَرّٖ لَّهَاۚ ذَٰلِكَ تَقۡدِيرُ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡعَلِيمِ
Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi.
عربي تفسیرونه:
وَٱلۡقَمَرَ قَدَّرۡنَٰهُ مَنَازِلَ حَتَّىٰ عَادَ كَٱلۡعُرۡجُونِ ٱلۡقَدِيمِ
Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka.
عربي تفسیرونه:
لَا ٱلشَّمۡسُ يَنۢبَغِي لَهَآ أَن تُدۡرِكَ ٱلۡقَمَرَ وَلَا ٱلَّيۡلُ سَابِقُ ٱلنَّهَارِۚ وَكُلّٞ فِي فَلَكٖ يَسۡبَحُونَ
Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: یس
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول