Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: روم   آیت:
وَلَئِنۡ أَرۡسَلۡنَا رِيحٗا فَرَأَوۡهُ مُصۡفَرّٗا لَّظَلُّواْ مِنۢ بَعۡدِهِۦ يَكۡفُرُونَ
Mpe soki sima na yango totindi mopepe ya makasi ebebisi milona na bango mpe bamoni yango na langi ya mayi ya mosaka bakomi kozanga botondi.
عربي تفسیرونه:
فَإِنَّكَ لَا تُسۡمِعُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَلَا تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ ٱلدُّعَآءَ إِذَا وَلَّوۡاْ مُدۡبِرِينَ
Ya solo, okoki koyokisa bawei te, mpe okoki koyokisa bakufi matoyi te, soki obengi bango tango bapesaka mokongo.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَنتَ بِهَٰدِ ٱلۡعُمۡيِ عَن ضَلَٰلَتِهِمۡۖ إِن تُسۡمِعُ إِلَّا مَن يُؤۡمِنُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُم مُّسۡلِمُونَ
Mpe ezali yo te nde okoki kokamba baye bakufa miso na bobungi bwa bango, okoyokisa nde baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali komisokia.
عربي تفسیرونه:
۞ ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن ضَعۡفٖ ثُمَّ جَعَلَ مِنۢ بَعۡدِ ضَعۡفٖ قُوَّةٗ ثُمَّ جَعَلَ مِنۢ بَعۡدِ قُوَّةٖ ضَعۡفٗا وَشَيۡبَةٗۚ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ وَهُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡقَدِيرُ
Allah nde akeli bino ya kolemba, sima apesi bino makasi, sima ya bokasi apesi bino bolembu na bopaka. Akelaka oyo alingi mpe azali moyebi akoka.
عربي تفسیرونه:
وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يُقۡسِمُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ مَا لَبِثُواْ غَيۡرَ سَاعَةٖۚ كَذَٰلِكَ كَانُواْ يُؤۡفَكُونَ
Mpe tango mokolo ya suka ekotelema bato mabe bakolapaka ete bawumelaki na mokili sé ngonga moko ya mpamba, ndenge wana nde bazalaka kokosa.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ وَٱلۡإِيمَٰنَ لَقَدۡ لَبِثۡتُمۡ فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡبَعۡثِۖ فَهَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡبَعۡثِ وَلَٰكِنَّكُمۡ كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
Mpe baye bapesamaki boyebi na bondimi bakolobaka: Bosilaki kovanda na eleko eye engebene na mokano ya Allah kino o mokolo mwa bosekwisami. Oyo nde mokolo yango, kasi bozalaki koyeba te.
عربي تفسیرونه:
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يَنفَعُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مَعۡذِرَتُهُمۡ وَلَا هُمۡ يُسۡتَعۡتَبُونَ
Mokolo mona bolimbisi ekosunga te тропа babubi, mpe bakosenga bango te ete bazonga.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ ضَرَبۡنَا لِلنَّاسِ فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ مِن كُلِّ مَثَلٖۚ وَلَئِن جِئۡتَهُم بِـَٔايَةٖ لَّيَقُولَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا مُبۡطِلُونَ
Ya soló, tosili kobetela bato bandakisa ya lolenge nyoso kati na kurani eye. Mpe soki oyeli bango ekamwiseli, baye bapengwa bakomi koloba ete; bozali sé babungisi.
عربي تفسیرونه:
كَذَٰلِكَ يَطۡبَعُ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
Lolenge wana nde Allah akangaka mitema mia bato oyo bayebi te.
عربي تفسیرونه:
فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞۖ وَلَا يَسۡتَخِفَّنَّكَ ٱلَّذِينَ لَا يُوقِنُونَ
Kanga motema na kozela. Ya solo, elaka ya Nkolo nayo ezali ya sólo mpenza, kasi baye bazangi kondima babungisa yo te.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: روم
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول