Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نمل   آیت:
وَإِنَّهُۥ لَهُدٗى وَرَحۡمَةٞ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
Мре ya sólo, yango ezali bokambi mpe ngolu тропа bandimi.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ رَبَّكَ يَقۡضِي بَيۡنَهُم بِحُكۡمِهِۦۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡعَلِيمُ
Ya sólo, Nkolo wayo akokataka o kati kati na bango na mibeko mia ye. Mpe azali wa bokasi atonda boyebi.
عربي تفسیرونه:
فَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِۖ إِنَّكَ عَلَى ٱلۡحَقِّ ٱلۡمُبِينِ
Mpe mipesa epai ya Allah. Ya sólo, ozali na bosembo ya polele.
عربي تفسیرونه:
إِنَّكَ لَا تُسۡمِعُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَلَا تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ ٱلدُّعَآءَ إِذَا وَلَّوۡاْ مُدۡبِرِينَ
Ya sólo, yo ozali na bokoki ya koyokisa bawei te, mpe koyokisa baye bakufa matoyi te, tango bakimi bapesi mokongo.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَنتَ بِهَٰدِي ٱلۡعُمۡيِ عَن ضَلَٰلَتِهِمۡۖ إِن تُسۡمِعُ إِلَّا مَن يُؤۡمِنُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُم مُّسۡلِمُونَ
Mpe ozali na bokoki ya kokamba bakufi miso te soki babungi, kasi okoki sé koyoka baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali batosi (bamizilima).
عربي تفسیرونه:
۞ وَإِذَا وَقَعَ ٱلۡقَوۡلُ عَلَيۡهِمۡ أَخۡرَجۡنَا لَهُمۡ دَآبَّةٗ مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ تُكَلِّمُهُمۡ أَنَّ ٱلنَّاسَ كَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا لَا يُوقِنُونَ
Mpe tango liloba likokwelaka bango, tokobimisela bango nyama o kati na mabele oyo akolobela bango. Ya sólo, bato bazalaki kondimela bilembo bia biso te.
عربي تفسیرونه:
وَيَوۡمَ نَحۡشُرُ مِن كُلِّ أُمَّةٖ فَوۡجٗا مِّمَّن يُكَذِّبُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُمۡ يُوزَعُونَ
Mpe mokolo moye tokosangisaka na umma[1] nionso bato ebele, baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, banso bakotelema na milongo.
[1] Umma: Awa elakisi: Lisanga ya bato. Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128
عربي تفسیرونه:
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُو قَالَ أَكَذَّبۡتُم بِـَٔايَٰتِي وَلَمۡ تُحِيطُواْ بِهَا عِلۡمًا أَمَّاذَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Kino tango bakokoma, (Allah) akolobaka: Boye boboyaki kondimela bilembo bia ngai, mpe botiki kokangama na yango mpe bozali koyeba, to bozalaki kosala nini?
عربي تفسیرونه:
وَوَقَعَ ٱلۡقَوۡلُ عَلَيۡهِم بِمَا ظَلَمُواْ فَهُمۡ لَا يَنطِقُونَ
Mpe liloba likokweyaka likolo lia bango тропа bobubi bwa bango, mpe bakokoka koloba eleko te.
عربي تفسیرونه:
أَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا جَعَلۡنَا ٱلَّيۡلَ لِيَسۡكُنُواْ فِيهِ وَٱلنَّهَارَ مُبۡصِرًاۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
Bazali kornona te, boye ya soló, totiyaki butu mpo bazua bopemi, mpe mokolo тропа kornona. Ya sólo, wana ezali bilembo тропа bandimi.
عربي تفسیرونه:
وَيَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِ فَفَزِعَ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَّا مَن شَآءَ ٱللَّهُۚ وَكُلٌّ أَتَوۡهُ دَٰخِرِينَ
Mpe mokolo moye kelelo ekobetama (kofula mondule to kelelo ya suka тропа kosekwisa bato), baye banso bazali o likolo mpe na nsé, bakosutuka na kobanga (liwa,) longola sé ba oyo ye moko Allah akobatela. Mpe banso bakoya epai naye na komikitisa nyoso.
عربي تفسیرونه:
وَتَرَى ٱلۡجِبَالَ تَحۡسَبُهَا جَامِدَةٗ وَهِيَ تَمُرُّ مَرَّ ٱلسَّحَابِۚ صُنۡعَ ٱللَّهِ ٱلَّذِيٓ أَتۡقَنَ كُلَّ شَيۡءٍۚ إِنَّهُۥ خَبِيرُۢ بِمَا تَفۡعَلُونَ
Mpe okomona bangomba okanisi ete yango ezali makasi, kasi yango ekomi kotambola lokola londende na likolo, wana ezali mosala ya Allah oyo abongisa lolenge ya biloko binso. Ya sólo, ye azali na sango ya maye bozali kosala.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نمل
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول