Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: انبیاء   آیت:
فَجَعَلَهُمۡ جُذَٰذًا إِلَّا كَبِيرٗا لَّهُمۡ لَعَلَّهُمۡ إِلَيۡهِ يَرۡجِعُونَ
Abuki yango biteni biteni, atiki oyo ya monene, mpo tango mosusu bakozongela yango.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ مَن فَعَلَ هَٰذَا بِـَٔالِهَتِنَآ إِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Balobi: Nani asali banzambe na biso boye? Ya soló, ye azali moko ya babubi.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ سَمِعۡنَا فَتٗى يَذۡكُرُهُمۡ يُقَالُ لَهُۥٓ إِبۡرَٰهِيمُ
Balobi: Bayebisi biso oyo asali boye ezali elenge mobali moko nkombo naye Ibrâhîm.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ فَأۡتُواْ بِهِۦ عَلَىٰٓ أَعۡيُنِ ٱلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَشۡهَدُونَ
Balobi: Bomema ye awa na miso ya bato mpo bakoka kotatola.
عربي تفسیرونه:
قَالُوٓاْ ءَأَنتَ فَعَلۡتَ هَٰذَا بِـَٔالِهَتِنَا يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ
Balobi: Yo nde osali boye na banzambe na biso oh Ibrâhîm?
عربي تفسیرونه:
قَالَ بَلۡ فَعَلَهُۥ كَبِيرُهُمۡ هَٰذَا فَسۡـَٔلُوهُمۡ إِن كَانُواْ يَنطِقُونَ
Alobi: Oyo asali boye nde mokolo wa bango oyo, botuna bango soki bakoki koloba.
عربي تفسیرونه:
فَرَجَعُوٓاْ إِلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡ فَقَالُوٓاْ إِنَّكُمۡ أَنتُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ
Bazongisaki mayele na bango mpe balobi: Ya sólo, bino nde bozali babubi.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ نُكِسُواْ عَلَىٰ رُءُوسِهِمۡ لَقَدۡ عَلِمۡتَ مَا هَٰٓؤُلَآءِ يَنطِقُونَ
Sima mabe ezongeli bango moko mpe balobi: Oyebi malamu ete (bikeko) oyo bilobaka te.
عربي تفسیرونه:
قَالَ أَفَتَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَنفَعُكُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَا يَضُرُّكُمۡ
Alobi: Boye bozali kobondela na botiki Allah maye makosalisa bino te mpe makosala bino mabe te?
عربي تفسیرونه:
أُفّٖ لَّكُمۡ وَلِمَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Ufi[1] na bino na maye bozali kobondela biye bizali Allah te, boye bozali kokanisa te?
[1] Ufi na bino: Elakisi: Naboyeli bino.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ حَرِّقُوهُ وَٱنصُرُوٓاْ ءَالِهَتَكُمۡ إِن كُنتُمۡ فَٰعِلِينَ
Balobi: Bozikisa ye, mpe bosunga banzambe na bino. Soki ya sólo, bolingi kosala.
عربي تفسیرونه:
قُلۡنَا يَٰنَارُ كُونِي بَرۡدٗا وَسَلَٰمًا عَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ
Tolobaki: Eh móto! Zala malili mpe kimia тропа Ibrâhîm.
عربي تفسیرونه:
وَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدٗا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَخۡسَرِينَ
Mpe balingaki kosala ye mabe, kasi totiyaki bango o kati ya bazangi mpenza.
عربي تفسیرونه:
وَنَجَّيۡنَٰهُ وَلُوطًا إِلَى ٱلۡأَرۡضِ ٱلَّتِي بَٰرَكۡنَا فِيهَا لِلۡعَٰلَمِينَ
Mpe topesaki ye elonga, mpe Loth lokola, mpe totindaki bango o mboka eye to pambolaki yango mpo na bato ya mokili mobimba.
عربي تفسیرونه:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥٓ إِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ نَافِلَةٗۖ وَكُلّٗا جَعَلۡنَا صَٰلِحِينَ
Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb ndenge asengaki, mpe banso totiyaki bango o kati ya bato malamu.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: انبیاء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول