Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: بقره   آیت:
وَلَن تَرۡضَىٰ عَنكَ ٱلۡيَهُودُ وَلَا ٱلنَّصَٰرَىٰ حَتَّىٰ تَتَّبِعَ مِلَّتَهُمۡۗ قُلۡ إِنَّ هُدَى ٱللَّهِ هُوَ ٱلۡهُدَىٰۗ وَلَئِنِ ٱتَّبَعۡتَ أَهۡوَآءَهُم بَعۡدَ ٱلَّذِي جَآءَكَ مِنَ ٱلۡعِلۡمِ مَا لَكَ مِنَ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٍ
Mpe bakosepela nayo te, bayuda mpe baklisto kino olanda lingomba na bango. Loba: Ya sôló, bokambi bwa Allah yango nde bokambi ya sôló. Mpe soki yo olandi mposa na bango na sima ya oyo ekomeli yo kati ya boyebi, okozala na mobateli te mpe mosungi na botiki Allah.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يَتۡلُونَهُۥ حَقَّ تِلَاوَتِهِۦٓ أُوْلَٰٓئِكَ يُؤۡمِنُونَ بِهِۦۗ وَمَن يَكۡفُرۡ بِهِۦ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
Ba oyo topesaki bango buku bazali kotanga yango na botangi ya sôló, ba oyo wana bandimi na yango. Mpe baye bakopengwa na yango, bango nde bazangi.
عربي تفسیرونه:
يَٰبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَنِّي فَضَّلۡتُكُمۡ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
Eh bana ya isalayele! Bokanisa bolamu na ngai, oyo natiaki likolo na bino. Mpe ya sôló natombolaki bino likolo na mikili.
عربي تفسیرونه:
وَٱتَّقُواْ يَوۡمٗا لَّا تَجۡزِي نَفۡسٌ عَن نَّفۡسٖ شَيۡـٔٗا وَلَا يُقۡبَلُ مِنۡهَا عَدۡلٞ وَلَا تَنفَعُهَا شَفَٰعَةٞ وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
Mpe bobanga mokolo moye molimo moko mokosalisa molimo mosusu te, mpe bosikoli ekoyambama te, mpe bobondeli ekozala na ntina te mpe bakosungama mpe te.
عربي تفسیرونه:
۞ وَإِذِ ٱبۡتَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِـۧمَ رَبُّهُۥ بِكَلِمَٰتٖ فَأَتَمَّهُنَّۖ قَالَ إِنِّي جَاعِلُكَ لِلنَّاسِ إِمَامٗاۖ قَالَ وَمِن ذُرِّيَّتِيۖ قَالَ لَا يَنَالُ عَهۡدِي ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe tango Nkolo ya Ibrâhîm amekaki ye na liloba, mpe akokisi yango, mpe alobi[1] ete: Ya sôló nalingi kotia yo mokambi ya bato. Alobaki[2] ete: Mpe na bakitani na ngai? Alobi[3]ete: Elaka na ngai ekomelaka bato ya mabe te.
[1] Allah. [2] Ibrâhîm.[3] Allah.
عربي تفسیرونه:
وَإِذۡ جَعَلۡنَا ٱلۡبَيۡتَ مَثَابَةٗ لِّلنَّاسِ وَأَمۡنٗا وَٱتَّخِذُواْ مِن مَّقَامِ إِبۡرَٰهِـۧمَ مُصَلّٗىۖ وَعَهِدۡنَآ إِلَىٰٓ إِبۡرَٰهِـۧمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ أَن طَهِّرَا بَيۡتِيَ لِلطَّآئِفِينَ وَٱلۡعَٰكِفِينَ وَٱلرُّكَّعِ ٱلسُّجُودِ
Mpe tango totiaki ndako[1] ezala esika ya bozongi mbala na mbala, mpe ezala esika ya kimia mpona bato. Mpe bato basambela esika Ibrâhîm atelemaki. Mpe topesaki motindo na Ibrâhîm na Ismâïl ete: Bopetola ndako na ngai mpona bato ya kobaluka pembeni na yango, mpe na baye bakobombana okati mpona mabondeli, mpe na bagumbami mpe na bafukami[2].
[1] Ka’aba. [2] Kotia elongi na mabele.
عربي تفسیرونه:
وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِـۧمُ رَبِّ ٱجۡعَلۡ هَٰذَا بَلَدًا ءَامِنٗا وَٱرۡزُقۡ أَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلثَّمَرَٰتِ مَنۡ ءَامَنَ مِنۡهُم بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۚ قَالَ وَمَن كَفَرَ فَأُمَتِّعُهُۥ قَلِيلٗا ثُمَّ أَضۡطَرُّهُۥٓ إِلَىٰ عَذَابِ ٱلنَّارِۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
Kanisa tango Ibrâhîm alobaki ete: Eh! Nkolo, tia mboka oyo ezala na kimia, mpe opesa bato na yango bomengo na bambuma ya ndenge na ndenge, baye bakondima na Allah mpe na mokolo ya suka, (Nkolo naye) azongisaki eyano ete: Oyo okati na bango akompegwa, nakopesa ye minyokoli mpe bomoyi mokuse, mpe etumbu ya móto, mpe oyo nde bozongi ya mabe.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: بقره
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول