Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نحل   آیت:
لِيَكۡفُرُواْ بِمَآ ءَاتَيۡنَٰهُمۡۚ فَتَمَتَّعُواْ فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ
Bazali kopengwa na maye topesaki bango. Bosakana na mwa tango moke, bokoyeba kala mingi te.
عربي تفسیرونه:
وَيَجۡعَلُونَ لِمَا لَا يَعۡلَمُونَ نَصِيبٗا مِّمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡۗ تَٱللَّهِ لَتُسۡـَٔلُنَّ عَمَّا كُنتُمۡ تَفۡتَرُونَ
Мре bazali kolongola ndambu ya bozui oyo topesi bango тропа kopesa yango na banzambe ya bikeko oyo bayebi te. Na nkombo ya Allah; bokotunama na maye bozali kosala.
عربي تفسیرونه:
وَيَجۡعَلُونَ لِلَّهِ ٱلۡبَنَٰتِ سُبۡحَٰنَهُۥ وَلَهُم مَّا يَشۡتَهُونَ
Mpe bazali kopesa Allah bana basi, nkembo naye! Kasi bazali komipesa oyo bango moko balingi.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا بُشِّرَ أَحَدُهُم بِٱلۡأُنثَىٰ ظَلَّ وَجۡهُهُۥ مُسۡوَدّٗا وَهُوَ كَظِيمٞ
Mpe soki bapesi moko wa bango sango ya mbotama ya mwana mwasi, abebisi elongi naye mpe atondisi yango na mpizoli.
عربي تفسیرونه:
يَتَوَٰرَىٰ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ مِن سُوٓءِ مَا بُشِّرَ بِهِۦٓۚ أَيُمۡسِكُهُۥ عَلَىٰ هُونٍ أَمۡ يَدُسُّهُۥ فِي ٱلتُّرَابِۗ أَلَا سَآءَ مَا يَحۡكُمُونَ
Akomi kokima bato na kobombama, тропа sango ya mabe oyo ekomeli ye, abatela mwana wana na nsoni azali na yango to akotisa ye na mabele? Ezaleli mabe ya motindo boye!
عربي تفسیرونه:
لِلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ مَثَلُ ٱلسَّوۡءِۖ وَلِلَّهِ ٱلۡمَثَلُ ٱلۡأَعۡلَىٰۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bapesi ndakisa ya mabe, kasi ndakisa ya likolo koleka ezali ya Allah, mpe azali na bokasi atonda bwanya.
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡ يُؤَاخِذُ ٱللَّهُ ٱلنَّاسَ بِظُلۡمِهِم مَّا تَرَكَ عَلَيۡهَا مِن دَآبَّةٖ وَلَٰكِن يُؤَخِّرُهُمۡ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗىۖ فَإِذَا جَآءَ أَجَلُهُمۡ لَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ سَاعَةٗ وَلَا يَسۡتَقۡدِمُونَ
Soki Allah alingaki kopesa etumbu na bato mpona mabe na bango, nde ata ekelamo moko te elingaki kotikala na nsé. Kasi azali kozelisa bango kino mokano mokokokisama, mpe soki tango yango ekoki, bakozongisa yango sima te mpe bakopusa yango liboso te.
عربي تفسیرونه:
وَيَجۡعَلُونَ لِلَّهِ مَا يَكۡرَهُونَۚ وَتَصِفُ أَلۡسِنَتُهُمُ ٱلۡكَذِبَ أَنَّ لَهُمُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ لَا جَرَمَ أَنَّ لَهُمُ ٱلنَّارَ وَأَنَّهُم مُّفۡرَطُونَ
Mpe bazali kobonzela Allah maye bango moko bazali kolinga yango te, mpe bazali kobimisa lokuta na minoko mia bango été: Bakozala na lifuta lia kitoko. Esika na bango ekozala na moto mpe bakozala bato ya liboso ya komema bango noki noki.
عربي تفسیرونه:
تَٱللَّهِ لَقَدۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰٓ أُمَمٖ مِّن قَبۡلِكَ فَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَهُوَ وَلِيُّهُمُ ٱلۡيَوۡمَ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Na nkombo ya Allah, tosilaki kotinda (bantoma) na bituka ebele liboso nayo, kasi satana abongiselaki bango misala ya mabe, mpe ye azali mokonzi wa bango lelo, kasi mokolo ya lobi bakozala na etumbu ya makasi.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّا لِتُبَيِّنَ لَهُمُ ٱلَّذِي ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٗ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
Mpe tokitiselaki yo buku sé mpo olimbola bango malamu maye bazali na bokeseni na yango, mpe mpo ezala bokambi mpe ngolu тропа bandimi.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نحل
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول