Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: هود   آیت:
قَالَ يَٰنُوحُ إِنَّهُۥ لَيۡسَ مِنۡ أَهۡلِكَۖ إِنَّهُۥ عَمَلٌ غَيۡرُ صَٰلِحٖۖ فَلَا تَسۡـَٔلۡنِ مَا لَيۡسَ لَكَ بِهِۦ عِلۡمٌۖ إِنِّيٓ أَعِظُكَ أَن تَكُونَ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
Azongisi été (Allah): Eh Nûh! Azali o kati ya libota lia yo te, mpo mosala naye ezali malamu te. Mpe kotuna ngai te likambo liye ozali na boyebi na yango te. Ya solo, nazali kopesa yo toli été: Ozala mosika na baye bazangi boyebi.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ إِنِّيٓ أَعُوذُ بِكَ أَنۡ أَسۡـَٔلَكَ مَا لَيۡسَ لِي بِهِۦ عِلۡمٞۖ وَإِلَّا تَغۡفِرۡ لِي وَتَرۡحَمۡنِيٓ أَكُن مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
(Nûh) alobaki été: Eh Nkolo! Ya solo, nasengi libateli nayo mpo été nasenga yo maye nazali na boyebi na yango te, mpe soki olimbisi ngai te, mpe oyokeli ngai mawa te, nakozala elongo na bazangi.
عربي تفسیرونه:
قِيلَ يَٰنُوحُ ٱهۡبِطۡ بِسَلَٰمٖ مِّنَّا وَبَرَكَٰتٍ عَلَيۡكَ وَعَلَىٰٓ أُمَمٖ مِّمَّن مَّعَكَۚ وَأُمَمٞ سَنُمَتِّعُهُمۡ ثُمَّ يَمَسُّهُم مِّنَّا عَذَابٌ أَلِيمٞ
Mpe motindo mopesamaki été: Eh Nûh! Kita na masuwa na kimia na biso, mpe mapamboli ebele likolo nayo na bato baye bazali elongo nayo. Mpe basusu bakoya sima nayo, tokopesa bango bomengo ya tango moke, sima etumbu ya biso ya makasi ekozua bango.
عربي تفسیرونه:
تِلۡكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهَآ إِلَيۡكَۖ مَا كُنتَ تَعۡلَمُهَآ أَنتَ وَلَا قَوۡمُكَ مِن قَبۡلِ هَٰذَاۖ فَٱصۡبِرۡۖ إِنَّ ٱلۡعَٰقِبَةَ لِلۡمُتَّقِينَ
Wana ezali ba sango ya mabombami tozali kokitisa epai nayo, kasi oyebaki yango liboso te, yo (mohamed) na bato nayo liboso nayo. Na yango, esengeli nayo koyika mpiko, mpo été suka ya malamu ezali тропа babangi (Allah).
عربي تفسیرونه:
وَإِلَىٰ عَادٍ أَخَاهُمۡ هُودٗاۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥٓۖ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا مُفۡتَرُونَ
Мре (totindelaki) bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, kasi bozali sé babuki lokuta.
عربي تفسیرونه:
يَٰقَوۡمِ لَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ أَجۡرًاۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱلَّذِي فَطَرَنِيٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Oh bato bangai! Nazali kosenga bino yango lifuta te, lifuta lia ngai lizali sé epai ya mokeli wa ngai. Boye bozali koyeba te?
عربي تفسیرونه:
وَيَٰقَوۡمِ ٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِ يُرۡسِلِ ٱلسَّمَآءَ عَلَيۡكُم مِّدۡرَارٗا وَيَزِدۡكُمۡ قُوَّةً إِلَىٰ قُوَّتِكُمۡ وَلَا تَتَوَلَّوۡاْ مُجۡرِمِينَ
Mpe oh bato bangai! Bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye. Akonokisela bino mbula kowuta o likolo ya kolandana, mpe akobakisela bino bokasi likolo lia bokasi. Kasi boboya (ye te), noki bokokoma batomboki.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ يَٰهُودُ مَا جِئۡتَنَا بِبَيِّنَةٖ وَمَا نَحۡنُ بِتَارِكِيٓ ءَالِهَتِنَا عَن قَوۡلِكَ وَمَا نَحۡنُ لَكَ بِمُؤۡمِنِينَ
Balobi: Eh Hûd! Oyeli biso bilembo te, mpe tokotika banzambe ba biso te тропа maloba nayo, mpe tokondimela yo te.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: هود
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول