Check out the new design

ߞߎ߬ߙߣߊ߬ ߞߟߊߒߞߋ ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߟߌ߲ߜ߭ߟߊߞߊ߲ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߡߎ߬ߤ߭ߊߡߡߊߘߎ߫ ߓߊ߯ߟߊ߲ߜ߭ߏߜߏ߫ * - ߘߟߊߡߌߘߊ ߟߎ߫ ߦߌ߬ߘߊ߬ߥߟߊ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌ߬ߘߊ߬ߟߌ ߝߐߘߊ ߘߏ߫: ߦߛߎߝߎ߫   ߟߝߊߙߌ ߘߏ߫:
وَٱتَّبَعۡتُ مِلَّةَ ءَابَآءِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۚ مَا كَانَ لَنَآ أَن نُّشۡرِكَ بِٱللَّهِ مِن شَيۡءٖۚ ذَٰلِكَ مِن فَضۡلِ ٱللَّهِ عَلَيۡنَا وَعَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ
Mpe nalandi lingomba lia baboti na ngai, Ibrâhîm na Is’hâq na Ya’qüb. Esengeli na biso te tosangisa Allah na eloko mosusu. Wana nde bolamu bwa Allah epai na biso na epai ya bato banso, kasi ebele ya bato bazali kotondo te.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ ءَأَرۡبَابٞ مُّتَفَرِّقُونَ خَيۡرٌ أَمِ ٱللَّهُ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّارُ
Oh! Bato ba ngai ba boloko! Boye binzambe nzambe bazali malamu koleka to Allah wa bomoko mpe wa bokoki?
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
مَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ أَسۡمَآءٗ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِنِ ٱلۡحُكۡمُ إِلَّا لِلَّهِ أَمَرَ أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّآ إِيَّاهُۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
Bozali kobondela basusu botiki ye, bazali sé bankombo oyo bopesi bino moko na bankoko na bino biye Allah akitisaki elembetele te. Kasi mobeko ezali sé ya Allah atindaka sé bobondela ye moko. Wana nde lingomba lia semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ أَمَّآ أَحَدُكُمَا فَيَسۡقِي رَبَّهُۥ خَمۡرٗاۖ وَأَمَّا ٱلۡأٓخَرُ فَيُصۡلَبُ فَتَأۡكُلُ ٱلطَّيۡرُ مِن رَّأۡسِهِۦۚ قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ ٱلَّذِي فِيهِ تَسۡتَفۡتِيَانِ
Oh bato ba ngai ba boloko! Mpona ndoto na bino, moko kati na bino akomelisa mokonzi naye masanga, mpe mosusu bakobaka ye, mpe bandeke bakolia motu naye. Likambo liye botunaki ngai lisili kokatama.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
وَقَالَ لِلَّذِي ظَنَّ أَنَّهُۥ نَاجٖ مِّنۡهُمَا ٱذۡكُرۡنِي عِندَ رَبِّكَ فَأَنسَىٰهُ ٱلشَّيۡطَٰنُ ذِكۡرَ رَبِّهِۦ فَلَبِثَ فِي ٱلسِّجۡنِ بِضۡعَ سِنِينَ
Mpe (Yûsuf) alobi na oyo abimaki na boloko: Lobela ngai epai ya mokonzi nayo. Kasi satana abosanisi ye bokundoli bwa Nkolo naye, yango awumelaki na boloko pene na mibu ebele.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ إِنِّيٓ أَرَىٰ سَبۡعَ بَقَرَٰتٖ سِمَانٖ يَأۡكُلُهُنَّ سَبۡعٌ عِجَافٞ وَسَبۡعَ سُنۢبُلَٰتٍ خُضۡرٖ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٖۖ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَأُ أَفۡتُونِي فِي رُءۡيَٰيَ إِن كُنتُمۡ لِلرُّءۡيَا تَعۡبُرُونَ
Mpe mokonzi alobi: Ya sôló namoni na ndoto, bangombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokondo, mpe bambuma sambo ya mayi mapondu mpe misusu ya kokauka. Eh bankumu! Bopesa ngai ndimbola ya ndoto ya ngai, soki boyebi kolimbola ndoto.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
 
ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌ߬ߘߊ߬ߟߌ ߝߐߘߊ ߘߏ߫: ߦߛߎߝߎ߫
ߝߐߘߊ ߟߎ߫ ߦߌ߬ߘߊ߬ߥߟߊ ߞߐߜߍ ߝߙߍߕߍ
 
ߞߎ߬ߙߣߊ߬ ߞߟߊߒߞߋ ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߟߌ߲ߜ߭ߟߊߞߊ߲ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߡߎ߬ߤ߭ߊߡߡߊߘߎ߫ ߓߊ߯ߟߊ߲ߜ߭ߏߜߏ߫ - ߘߟߊߡߌߘߊ ߟߎ߫ ߦߌ߬ߘߊ߬ߥߟߊ

ߗ߭ߞߊߙߌߦߊ߫ ߡߎ߬ߤߊߡߡߊߘߎ߫ ߓߊ߯ߟߊ߲ߜ߭ߏߜߏ߫ ߟߊ߫ ߘߟߊߡߌߘߊ ߟߋ߬.

ߘߊߕߎ߲߯ߠߌ߲