Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ജിന്ന്   ആയത്ത്:

Al-Djinn

قُلۡ أُوحِيَ إِلَيَّ أَنَّهُ ٱسۡتَمَعَ نَفَرٞ مِّنَ ٱلۡجِنِّ فَقَالُوٓاْ إِنَّا سَمِعۡنَا قُرۡءَانًا عَجَبٗا
Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلرُّشۡدِ فَـَٔامَنَّا بِهِۦۖ وَلَن نُّشۡرِكَ بِرَبِّنَآ أَحَدٗا
Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّهُۥ تَعَٰلَىٰ جَدُّ رَبِّنَا مَا ٱتَّخَذَ صَٰحِبَةٗ وَلَا وَلَدٗا
Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّهُۥ كَانَ يَقُولُ سَفِيهُنَا عَلَى ٱللَّهِ شَطَطٗا
Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن تَقُولَ ٱلۡإِنسُ وَٱلۡجِنُّ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا
Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّهُۥ كَانَ رِجَالٞ مِّنَ ٱلۡإِنسِ يَعُوذُونَ بِرِجَالٖ مِّنَ ٱلۡجِنِّ فَزَادُوهُمۡ رَهَقٗا
Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّهُمۡ ظَنُّواْ كَمَا ظَنَنتُمۡ أَن لَّن يَبۡعَثَ ٱللَّهُ أَحَدٗا
Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا لَمَسۡنَا ٱلسَّمَآءَ فَوَجَدۡنَٰهَا مُلِئَتۡ حَرَسٗا شَدِيدٗا وَشُهُبٗا
Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا كُنَّا نَقۡعُدُ مِنۡهَا مَقَٰعِدَ لِلسَّمۡعِۖ فَمَن يَسۡتَمِعِ ٱلۡأٓنَ يَجِدۡ لَهُۥ شِهَابٗا رَّصَدٗا
Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا لَا نَدۡرِيٓ أَشَرٌّ أُرِيدَ بِمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ أَرَادَ بِهِمۡ رَبُّهُمۡ رَشَدٗا
Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا مِنَّا ٱلصَّٰلِحُونَ وَمِنَّا دُونَ ذَٰلِكَۖ كُنَّا طَرَآئِقَ قِدَدٗا
Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن نُّعۡجِزَ ٱللَّهَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَن نُّعۡجِزَهُۥ هَرَبٗا
Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّا لَمَّا سَمِعۡنَا ٱلۡهُدَىٰٓ ءَامَنَّا بِهِۦۖ فَمَن يُؤۡمِنۢ بِرَبِّهِۦ فَلَا يَخَافُ بَخۡسٗا وَلَا رَهَقٗا
Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ജിന്ന്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക