Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: അൻആം   ആയത്ത്:
وَلَوۡ جَعَلۡنَٰهُ مَلَكٗا لَّجَعَلۡنَٰهُ رَجُلٗا وَلَلَبَسۡنَا عَلَيۡهِم مَّا يَلۡبِسُونَ
Mpe soki toponaka anzelu lokola (ntoma), tolingaki kopesa ye lolenge ya moto, mpe tolingaki kotiyela bango mikakatano na ndenge eye bazali na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدِ ٱسۡتُهۡزِئَ بِرُسُلٖ مِّن قَبۡلِكَ فَحَاقَ بِٱلَّذِينَ سَخِرُواْ مِنۡهُم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Kasi ya soló, batiolaki batindami liboso lia yo; kasi, litio lizingaki bango moko mpona maye bazalaki kosakana na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ ثُمَّ ٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
Loba: Botambola na mabele, bótala ndenge ezalaki suka ya babuki lokuta.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُل لِّمَن مَّا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ قُل لِّلَّهِۚ كَتَبَ عَلَىٰ نَفۡسِهِ ٱلرَّحۡمَةَۚ لَيَجۡمَعَنَّكُمۡ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ لَا رَيۡبَ فِيهِۚ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
Loba: Nani azali kokonza maye mazuami o likolo na mabele? Loba: Allah. Asila komikatela kozala na ngolu. Akosangisaka bino o mokolo mwa suka moye mozali na tembe te o kati na yango. Baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ وَلَهُۥ مَا سَكَنَ فِي ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
Mpe maye manso mavandaka na butu mpe na moyi mazali ya ye. Mpe ye nde azali moyoki atonda boyebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ أَغَيۡرَ ٱللَّهِ أَتَّخِذُ وَلِيّٗا فَاطِرِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَهُوَ يُطۡعِمُ وَلَا يُطۡعَمُۗ قُلۡ إِنِّيٓ أُمِرۡتُ أَنۡ أَكُونَ أَوَّلَ مَنۡ أَسۡلَمَۖ وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
Loba: Boye natika Allah тропа kozua mosungi mosusu mokeli ya likolo na mabele, mpe yende moleisi, kasi baleisaka ye te? Loba: Bapesi ngai mobeko ete nazala moto ya yambo ya komisokia[1], kasi kozala te omolongo ya basangisi Allah.
[1] Kozala mizilima.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ إِنِّيٓ أَخَافُ إِنۡ عَصَيۡتُ رَبِّي عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
Loba: Ya soló, nazali kobanga soki nazangi Nkolo nangai botosi, ekozala etumbu enene mokolo yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
مَّن يُصۡرَفۡ عَنۡهُ يَوۡمَئِذٖ فَقَدۡ رَحِمَهُۥۚ وَذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡمُبِينُ
Oyó akobatelama na yango mokolo wana; ya sólo, (Allah) asili koyokela ye mawa: Мре wana nde elonga enene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن يَمۡسَسۡكَ ٱللَّهُ بِضُرّٖ فَلَا كَاشِفَ لَهُۥٓ إِلَّا هُوَۖ وَإِن يَمۡسَسۡكَ بِخَيۡرٖ فَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
Mpe soki Allah apesi yo mikakatano moto akolongola yango azali te kaka sé ye, тре soki apesi yo bolamu; yende oyoazali na nguya likolo ya biloko binso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَهُوَ ٱلۡقَاهِرُ فَوۡقَ عِبَادِهِۦۚ وَهُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡخَبِيرُ
Mpe ye nde mokonzi likolo ya bawumbu naye, mpe azali na bwanya atonda ba nsango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: അൻആം
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക