Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സ്സുഖ്റുഫ്   ആയത്ത്:

Az-Zukhruf

حمٓ
Há, mím.[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
Mpe buku eye elimbolama polele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّا جَعَلۡنَٰهُ قُرۡءَٰنًا عَرَبِيّٗا لَّعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
Ya sôló, totiaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bokanisa.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّهُۥ فِيٓ أُمِّ ٱلۡكِتَٰبِ لَدَيۡنَا لَعَلِيٌّ حَكِيمٌ
Mpe ya sôló, yango ezali o kati ya mama ya makomi pembeni na biso o likolo koleka etonda bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَنَضۡرِبُ عَنكُمُ ٱلذِّكۡرَ صَفۡحًا أَن كُنتُمۡ قَوۡمٗا مُّسۡرِفِينَ
Boye tóbetela bino bokundoli ete bozalaki bato mabe?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَكَمۡ أَرۡسَلۡنَا مِن نَّبِيّٖ فِي ٱلۡأَوَّلِينَ
Boni kati ya bantoma baye totindaki epai ya bato ya yambo?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن نَّبِيٍّ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Ntoma atikalaki koyela bango te sé kino batióla ye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَهۡلَكۡنَآ أَشَدَّ مِنۡهُم بَطۡشٗا وَمَضَىٰ مَثَلُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe tobomaki mingi koleka kati na bango, mpe tosilaki kotanga ndakisa ya bato ya yambo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ لَيَقُولُنَّ خَلَقَهُنَّ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡعَلِيمُ
Mpe soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: ya soló, oyo akela yango nde oyo azali na bokasi atonda boyebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ مَهۡدٗا وَجَعَلَ لَكُمۡ فِيهَا سُبُلٗا لَّعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
Oyo atiyelaki bino mabele ezala etando ya kofanda, mpe atiyeli bino banzela kati kati na yango mpo bokambamaka (na yango).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِي نَزَّلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءَۢ بِقَدَرٖ فَأَنشَرۡنَا بِهِۦ بَلۡدَةٗ مَّيۡتٗاۚ كَذَٰلِكَ تُخۡرَجُونَ
Ye nde akitisaka mayi kowuta na likolo na bokoki, mpe tozali kopesa na yango bomoyi na mboka oyo ekufa (ekawuka), mpe lolenge wana nde bokobimisama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَزۡوَٰجَ كُلَّهَا وَجَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلۡفُلۡكِ وَٱلۡأَنۡعَٰمِ مَا تَرۡكَبُونَ
Mpe ye nde akela balongani mibale mibale bango banso, mpe asaleli bino masuwa na banyama mpo bomataka na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِتَسۡتَوُۥاْ عَلَىٰ ظُهُورِهِۦ ثُمَّ تَذۡكُرُواْ نِعۡمَةَ رَبِّكُمۡ إِذَا ٱسۡتَوَيۡتُمۡ عَلَيۡهِ وَتَقُولُواْ سُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي سَخَّرَ لَنَا هَٰذَا وَمَا كُنَّا لَهُۥ مُقۡرِنِينَ
Mpo ete bofanda na mikongo mia yango, mpe bokanisa bolamu ya Nkolo wa bino osima ya komata na yango mpe bokolobaka: lokumu ya oyo asaleli biso maye, mpe tozalaki na makoki ya kosala yango te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا لَمُنقَلِبُونَ
Mpe ya soló epai ya Nkolo wa biso nde tokozongaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَجَعَلُواْ لَهُۥ مِنۡ عِبَادِهِۦ جُزۡءًاۚ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لَكَفُورٞ مُّبِينٌ
Mpe kati ya bawumbu naye oyo akela bango bazueli ye bambanda. Ya soló, moto azali na bopengwi monene mpe ya polele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمِ ٱتَّخَذَ مِمَّا يَخۡلُقُ بَنَاتٖ وَأَصۡفَىٰكُم بِٱلۡبَنِينَ
To na kati ya maye akela aponi bana basi (ba anzelu), mpe asali bino bana mibali?[1]
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذَا بُشِّرَ أَحَدُهُم بِمَا ضَرَبَ لِلرَّحۡمَٰنِ مَثَلٗا ظَلَّ وَجۡهُهُۥ مُسۡوَدّٗا وَهُوَ كَظِيمٌ
Мре soki bapesi moko kati na bango sango ya maye bazali kopesa na Ar-Rahmân[1] (Allah) (тропа kobotama ya mwana mwasi), okomona elongi naye ekomi moyindo na mawa. (etondi na pizoli na kosilika)
[1] Ar-Rahmân: Bótala Ar-Ra’d mokapo: ЗО.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوَمَن يُنَشَّؤُاْ فِي ٱلۡحِلۡيَةِ وَهُوَ فِي ٱلۡخِصَامِ غَيۡرُ مُبِينٖ
(Soki batuni ye) ezali nini? (Akolobaka ezali nde mwana mwasi), oyo akoki kosala ata eloko moko te, mpe akoki mpe kotelema тропа koloba polele te, sé kosala mabe.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَجَعَلُواْ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ ٱلَّذِينَ هُمۡ عِبَٰدُ ٱلرَّحۡمَٰنِ إِنَٰثًاۚ أَشَهِدُواْ خَلۡقَهُمۡۚ سَتُكۡتَبُ شَهَٰدَتُهُمۡ وَيُسۡـَٔلُونَ
Mpe bazali kokomisa baanzelu baye bazali bikelamu ya Ar-Rahmân ete bazali basi. Boye bazalaki banzeneneke na bokelami na bango? Ekokomama maye bazalaki koloba mpe bakotunama[1].
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَالُواْ لَوۡ شَآءَ ٱلرَّحۡمَٰنُ مَا عَبَدۡنَٰهُمۗ مَّا لَهُم بِذَٰلِكَ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِنۡ هُمۡ إِلَّا يَخۡرُصُونَ
Mpe bazali koloba ete: Soki Ar-Rahmân[1] alingaki nde tobondeli bango te, bazali na boyebi moko te, bazali sé na makanisi mabe.
[1] Ar-Rahmân: Bótala Ar-Ra’d mokapo: ЗО.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡ ءَاتَيۡنَٰهُمۡ كِتَٰبٗا مِّن قَبۡلِهِۦ فَهُم بِهِۦ مُسۡتَمۡسِكُونَ
To boye topesaki bango buku liboso mpo basimbama na yango?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بَلۡ قَالُوٓاْ إِنَّا وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا عَلَىٰٓ أُمَّةٖ وَإِنَّا عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِم مُّهۡتَدُونَ
Kasi bakolobaka ete: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo mpe tozali na bokambami mpe tozali sé kolanda yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَكَذَٰلِكَ مَآ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ فِي قَرۡيَةٖ مِّن نَّذِيرٍ إِلَّا قَالَ مُتۡرَفُوهَآ إِنَّا وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا عَلَىٰٓ أُمَّةٖ وَإِنَّا عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِم مُّقۡتَدُونَ
Мре lolenge wana nde totindaki liboso nayo mokebisi na engumba sé bato ya bozui kati na yango baboya (ye) mpe baloba: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo, tokolanda sé nzela na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ قَٰلَ أَوَلَوۡ جِئۡتُكُم بِأَهۡدَىٰ مِمَّا وَجَدتُّمۡ عَلَيۡهِ ءَابَآءَكُمۡۖ قَالُوٓاْ إِنَّا بِمَآ أُرۡسِلۡتُم بِهِۦ كَٰفِرُونَ
(Mokebisi) alobi ata soki nayeli bino nzela ya semba koleka oyo ya bankoko na bino? Bakoyanolaka: Tokondima na maye oyei na yango te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱنتَقَمۡنَا مِنۡهُمۡۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
Tozuaki bango mabe, mpe tala lolenge nini bato ya lokuta basukaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِيمُ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦٓ إِنَّنِي بَرَآءٞ مِّمَّا تَعۡبُدُونَ
Mpe tango Ibrâhîm alobaki na tata waye na bato naye: Ya soló, ngai namitiye mosika na maye bozali kobondela.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِلَّا ٱلَّذِي فَطَرَنِي فَإِنَّهُۥ سَيَهۡدِينِ
Longola sé oyo akela ngai, ya sólo ye nde akokamba ngai na (nzela ya semba)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَجَعَلَهَا كَلِمَةَۢ بَاقِيَةٗ فِي عَقِبِهِۦ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
Mpe atiaki liloba bango litikala na libota lia ye, na ntina ete bamizongisa epai ya Allah.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بَلۡ مَتَّعۡتُ هَٰٓؤُلَآءِ وَءَابَآءَهُمۡ حَتَّىٰ جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ وَرَسُولٞ مُّبِينٞ
Kasi napesaki bango na batata na bango bisengo ya токе kino bosembo (kurani) eyelaki bango mpe na motindami ya polele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَمَّا جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ قَالُواْ هَٰذَا سِحۡرٞ وَإِنَّا بِهِۦ كَٰفِرُونَ
Mpe tango bosóló eyelaki bango balobi: Oyo ezali bondoki bwa polele, mpe tokondimela yango te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَالُواْ لَوۡلَا نُزِّلَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ عَلَىٰ رَجُلٖ مِّنَ ٱلۡقَرۡيَتَيۡنِ عَظِيمٍ
Мре balobaki: Mpona nini bakitisaki kurani te ata epai ya moto ya monene kati ya bamboka mibale?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَهُمۡ يَقۡسِمُونَ رَحۡمَتَ رَبِّكَۚ نَحۡنُ قَسَمۡنَا بَيۡنَهُم مَّعِيشَتَهُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۚ وَرَفَعۡنَا بَعۡضَهُمۡ فَوۡقَ بَعۡضٖ دَرَجَٰتٖ لِّيَتَّخِذَ بَعۡضُهُم بَعۡضٗا سُخۡرِيّٗاۗ وَرَحۡمَتُ رَبِّكَ خَيۡرٞ مِّمَّا يَجۡمَعُونَ
Boye bango nde bakabolaka bolamu ya Nkolo wayo? Tokabolelaki bango bomoyi bwa bango kati na mokili, totomboli basusu koleka baninga, mpo basusu bazala basali ya baninga. Mpe ngolu ya Nkolo wayo ezali malamu koleka maye bazali kosangisa.[1]
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَوۡلَآ أَن يَكُونَ ٱلنَّاسُ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ لَّجَعَلۡنَا لِمَن يَكۡفُرُ بِٱلرَّحۡمَٰنِ لِبُيُوتِهِمۡ سُقُفٗا مِّن فِضَّةٖ وَمَعَارِجَ عَلَيۡهَا يَظۡهَرُونَ
Soki (bobangi) te ete bato bazala umma[1] moko (ya libungi), nde totielaki bapengwi ya Ar- Rahmán[2] mpona bandako na bango motondo ya mabende ya pembe mpe ngala-ngala (ebuteli) mpo bamataka na yango.
[1] Umma: Awa ezali: Lingomba, bótala Al-Baqarah mokapo: 128.
[2] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلِبُيُوتِهِمۡ أَبۡوَٰبٗا وَسُرُرًا عَلَيۡهَا يَتَّكِـُٔونَ
(nde totielaki bango) na bandako na bango bikuke mpe bambeto ya kitoko oyo bakofandela[2].
[2] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَزُخۡرُفٗاۚ وَإِن كُلُّ ذَٰلِكَ لَمَّا مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۚ وَٱلۡأٓخِرَةُ عِندَ رَبِّكَ لِلۡمُتَّقِينَ
Na bonzenga. Wana nyoso ezali mpona bosepeli ya bomoyi bwa mokili, kasi ya mokolo mwa suka epayi ya Nkolo nayo ezali mpona babangi.[1]
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَن يَعۡشُ عَن ذِكۡرِ ٱلرَّحۡمَٰنِ نُقَيِّضۡ لَهُۥ شَيۡطَٰنٗا فَهُوَ لَهُۥ قَرِينٞ
Na oyo akokanga miso (mpe amitiye mosika) mpona bokundoli bwa Ar-Rahmân[2], tokotiela ye satana azala moninga naye ya libela.
[2] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّهُمۡ لَيَصُدُّونَهُمۡ عَنِ ٱلسَّبِيلِ وَيَحۡسَبُونَ أَنَّهُم مُّهۡتَدُونَ
Мре ya soló, bazali kopekisa bango nzela, mpe ya sólo, bazali kokanisa ete bazali na nzela ya semba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَنَا قَالَ يَٰلَيۡتَ بَيۡنِي وَبَيۡنَكَ بُعۡدَ ٱلۡمَشۡرِقَيۡنِ فَبِئۡسَ ٱلۡقَرِينُ
Kino moto wana akokoma epai na biso akoloba na elima naye ete: Mawa na ngai! Soki ntaka kati na ngai nayo lokola moniele na eloli, mpe oyo moninga ya mabe!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَن يَنفَعَكُمُ ٱلۡيَوۡمَ إِذ ظَّلَمۡتُمۡ أَنَّكُمۡ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
Mokolo mona mokosalisaka bino na eloko te mpo bozalaki babubi, bokosanganaka okati ya etumbu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَأَنتَ تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ أَوۡ تَهۡدِي ٱلۡعُمۡيَ وَمَن كَانَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
Boye, yo nde ozali na bokoki ya koyokisa mokufi matoyi to boye okambaka mokufi miso to oyo azali na libungi ya polele?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَإِمَّا نَذۡهَبَنَّ بِكَ فَإِنَّا مِنۡهُم مُّنتَقِمُونَ
To mpe tokotombola yo na likolo (koboma yo), mpe ya sólo, tokosilana na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوۡ نُرِيَنَّكَ ٱلَّذِي وَعَدۡنَٰهُمۡ فَإِنَّا عَلَيۡهِم مُّقۡتَدِرُونَ
To tolakisa yo mabe oyo tolakaki bango (etumbu) kasi tozali na bokasi likolo na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱسۡتَمۡسِكۡ بِٱلَّذِيٓ أُوحِيَ إِلَيۡكَۖ إِنَّكَ عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
Zala na bokangami na maye bamoniselaki yo. Ya sólo, ozali na nzela ya semba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّهُۥ لَذِكۡرٞ لَّكَ وَلِقَوۡمِكَۖ وَسَوۡفَ تُسۡـَٔلُونَ
Ya sólo (kurani oyo), ezali bokundoli тропа yo mpe bato nayo. Mpe mosika te bokotunama[1].
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَسۡـَٔلۡ مَنۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ مِن رُّسُلِنَآ أَجَعَلۡنَا مِن دُونِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ءَالِهَةٗ يُعۡبَدُونَ
Мре tuna batindami ba biso baye totindaki liboso nayo, boye tozalaki kozua banzambe misusu na botiki Ar-Rahmán[2] тропа kobondela bango?
[2] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦ فَقَالَ إِنِّي رَسُولُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi та biso epai ya falo na bato naye (bankumu), mpe alobaki: Ya soló, nazali motindami ya Nkolo ya mokili.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّا جَآءَهُم بِـَٔايَٰتِنَآ إِذَا هُم مِّنۡهَا يَضۡحَكُونَ
Mpe tango bayeli bango makamwisi та biso, okomona bango bazali koseka yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَا نُرِيهِم مِّنۡ ءَايَةٍ إِلَّا هِيَ أَكۡبَرُ مِنۡ أُخۡتِهَاۖ وَأَخَذۡنَٰهُم بِٱلۡعَذَابِ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
Mpe na likamwisi nyoso na oyo tolakisaki bango, ezalaki makasi mingi koleka oyo ya liboso. Mpe topesaki bango etumbu mpo tango mosusu bakoki komizongisa epai na biso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَالُواْ يَٰٓأَيُّهَ ٱلسَّاحِرُ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ بِمَا عَهِدَ عِندَكَ إِنَّنَا لَمُهۡتَدُونَ
Mpe balobi ete: Oh yo nganga! Sengela biso Nkolo nayo тропа maye alakaki epai nayo, na yango tokokambama ya sólo na nzela ya semba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّا كَشَفۡنَا عَنۡهُمُ ٱلۡعَذَابَ إِذَا هُمۡ يَنكُثُونَ
Mpe tango tolongoleli bango etumbu, okomona bango wana babuki mibeko ya elaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَنَادَىٰ فِرۡعَوۡنُ فِي قَوۡمِهِۦ قَالَ يَٰقَوۡمِ أَلَيۡسَ لِي مُلۡكُ مِصۡرَ وَهَٰذِهِ ٱلۡأَنۡهَٰرُ تَجۡرِي مِن تَحۡتِيٓۚ أَفَلَا تُبۡصِرُونَ
Mpe falo abengi bato naye alobi: Oh bato na ngai! Bokonzi ya ezipito ezali na ngai te, mpe mayi ya ebale oyo ezali kotambola na nsé na ngai, boye bozali kornona te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡ أَنَا۠ خَيۡرٞ مِّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي هُوَ مَهِينٞ وَلَا يَكَادُ يُبِينُ
To boye nazali malamu te koleka moto mpamba oyo, mpe alobaka polele te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَوۡلَآ أُلۡقِيَ عَلَيۡهِ أَسۡوِرَةٞ مِّن ذَهَبٍ أَوۡ جَآءَ مَعَهُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ مُقۡتَرِنِينَ
Mpona nini babwakeli ye basinga ya wolo ya maboko te, to mpe ba anzelu baya naye elongo!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱسۡتَخَفَّ قَوۡمَهُۥ فَأَطَاعُوهُۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
Na boye nde abangisaki bato naye mpe batosi ye. Ya soló, bazalaki bato mabe.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّآ ءَاسَفُونَا ٱنتَقَمۡنَا مِنۡهُمۡ فَأَغۡرَقۡنَٰهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Mpe tango bapesaki biso kanda makasi, tozuaki bango mpe tozindisaki bango banso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَجَعَلۡنَٰهُمۡ سَلَفٗا وَمَثَلٗا لِّلۡأٓخِرِينَ
Mpe totiaki bango bazala liteya mpona baye bakoya sima na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ وَلَمَّا ضُرِبَ ٱبۡنُ مَرۡيَمَ مَثَلًا إِذَا قَوۡمُكَ مِنۡهُ يَصِدُّونَ
Mpe tango ndakisa ya mwana ya Maryam, epesamaki bato nayo bakomaki koyima yima (bamoni yango pamba)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَالُوٓاْ ءَأَٰلِهَتُنَا خَيۡرٌ أَمۡ هُوَۚ مَا ضَرَبُوهُ لَكَ إِلَّا جَدَلَۢاۚ بَلۡ هُمۡ قَوۡمٌ خَصِمُونَ
Balobi banzambe na biso to ye, nani azali malamu? Babeti ndakisa wana sé mpona yo na lolenge ya bilobaloba, kasi bazali sé bato balutisaki kosuana.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنۡ هُوَ إِلَّا عَبۡدٌ أَنۡعَمۡنَا عَلَيۡهِ وَجَعَلۡنَٰهُ مَثَلٗا لِّبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
(Issa) azali sé mowumbu oyo topessaki ye bolamu, mpe tozalisa ye ndakisa mpona bana ya isalayele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَا مِنكُم مَّلَٰٓئِكَةٗ فِي ٱلۡأَرۡضِ يَخۡلُفُونَ
Soki tolingaki nde totiaki kati na bino ba anzelu awa na nsé bazali kokitana.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّهُۥ لَعِلۡمٞ لِّلسَّاعَةِ فَلَا تَمۡتَرُنَّ بِهَا وَٱتَّبِعُونِۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
Mpe ya soló, akozala elembo тропа mokolo ya suka,botia tembe te, mpe bolanda ngai. Oyo nde nzela ya semba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَا يَصُدَّنَّكُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُۖ إِنَّهُۥ لَكُمۡ عَدُوّٞ مُّبِينٞ
Satana abungisa bino te mpo azali monguna ya polele тропа bino.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَمَّا جَآءَ عِيسَىٰ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ قَالَ قَدۡ جِئۡتُكُم بِٱلۡحِكۡمَةِ وَلِأُبَيِّنَ لَكُم بَعۡضَ ٱلَّذِي تَخۡتَلِفُونَ فِيهِۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Mpe tango Issa ayaki na bilembo alobaki: Nayeli bino yango na bwanya, mpe mpo nalimbolela bino ndambo ya maye bozalaki kokesene na yango. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
Ya solo, Allah azali Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino, bobondela ye. Oyo nde nzela ya semba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱخۡتَلَفَ ٱلۡأَحۡزَابُ مِنۢ بَيۡنِهِمۡۖ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنۡ عَذَابِ يَوۡمٍ أَلِيمٍ
Kasi bakeseneki kati kati na bango. Babubi bakozuaka mabe o mokolo mwa etumbu ya makasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
هَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّا ٱلسَّاعَةَ أَن تَأۡتِيَهُم بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
Boye bazali kozela (mokolo ya suka) yango ekoyela bango mbalakaka mpe bakoyeba te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلۡأَخِلَّآءُ يَوۡمَئِذِۭ بَعۡضُهُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوٌّ إِلَّا ٱلۡمُتَّقِينَ
O mokolo mona, baye balinganaki bakokomaka banguna kati kati na bango, longola sé babangi (Allah)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰعِبَادِ لَا خَوۡفٌ عَلَيۡكُمُ ٱلۡيَوۡمَ وَلَآ أَنتُمۡ تَحۡزَنُونَ
Eh! Bawumbu na ngai! Lelo, bozala na bobangi mpe niawa te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِـَٔايَٰتِنَا وَكَانُواْ مُسۡلِمِينَ
В aye bandimaki na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotosa (ba mizilima).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ أَنتُمۡ وَأَزۡوَٰجُكُمۡ تُحۡبَرُونَ
Bokota o kati ya Iola, bosala biyenga elongo na basi na bino, (bosepela)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يُطَافُ عَلَيۡهِم بِصِحَافٖ مِّن ذَهَبٖ وَأَكۡوَابٖۖ وَفِيهَا مَا تَشۡتَهِيهِ ٱلۡأَنفُسُ وَتَلَذُّ ٱلۡأَعۡيُنُۖ وَأَنتُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Basani mpe bakopo ya wolo biko balukaka, bikotiama liboso na bango, o kati na yango bitondi na maye mazali na mposa na bango mpe bosepelisi miso. Bokozala libela na kati na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَتِلۡكَ ٱلۡجَنَّةُ ٱلَّتِيٓ أُورِثۡتُمُوهَا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Wana ezali nde lola oyo bokitani yango, тропа maye bozalaki kosala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَكُمۡ فِيهَا فَٰكِهَةٞ كَثِيرَةٞ مِّنۡهَا تَأۡكُلُونَ
Kati na yango bokozalaka na bambuma ebele тропа kólia.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلۡمُجۡرِمِينَ فِي عَذَابِ جَهَنَّمَ خَٰلِدُونَ
Ya sôló, batomboki bakozalaka na etumbu ya moto ya lifelo libela.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَا يُفَتَّرُ عَنۡهُمۡ وَهُمۡ فِيهِ مُبۡلِسُونَ
Ekokutolama te mpe bakozanga elikia o kati na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَا ظَلَمۡنَٰهُمۡ وَلَٰكِن كَانُواْ هُمُ ٱلظَّٰلِمِينَ
Tosalaki bango mabe te kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَنَادَوۡاْ يَٰمَٰلِكُ لِيَقۡضِ عَلَيۡنَا رَبُّكَۖ قَالَ إِنَّكُم مَّٰكِثُونَ
Mpe bakobelelaka: Oh Mâlik! Nkolo wayo aboma biso, akoyanolaka bango: Botikali libela o kati na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَقَدۡ جِئۡنَٰكُم بِٱلۡحَقِّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَكُمۡ لِلۡحَقِّ كَٰرِهُونَ
Tosilaki koyela bino bosôló, kasi ebele kati na bino baboyaki yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡ أَبۡرَمُوٓاْ أَمۡرٗا فَإِنَّا مُبۡرِمُونَ
Boye basili kokana likita, kasi biso nde tozali na likita.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡ يَحۡسَبُونَ أَنَّا لَا نَسۡمَعُ سِرَّهُمۡ وَنَجۡوَىٰهُمۚ بَلَىٰ وَرُسُلُنَا لَدَيۡهِمۡ يَكۡتُبُونَ
To bazali kokanisa ete toyokaka sekele na koyima yima na bango na mongongo ya sé te? Iyo! Batindami na biso epai na bango bazali kokoma nyoso (ba anzelu)[1].
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ إِن كَانَ لِلرَّحۡمَٰنِ وَلَدٞ فَأَنَا۠ أَوَّلُ ٱلۡعَٰبِدِينَ
Loba: Soki Ar-Rahmân[2] azalaka na mwana, nalingaki kozala wa yambo тропа kobondela.
[2] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
سُبۡحَٰنَ رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ رَبِّ ٱلۡعَرۡشِ عَمَّا يَصِفُونَ
Lokumu na Nkolo ya likolo na ya mabele, Nkolo ya ngwende na maye bazali koloba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَذَرۡهُمۡ يَخُوضُواْ وَيَلۡعَبُواْ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ
Tika bango bazinda na mabe mpe basakana kino bakokutana na mokolo mwa elaka na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَهُوَ ٱلَّذِي فِي ٱلسَّمَآءِ إِلَٰهٞ وَفِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَٰهٞۚ وَهُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡعَلِيمُ
Ye nde azali Nzambe ya kobondela likolo mpe o nsé, тре azali wa bwanya atonda boyebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَتَبَارَكَ ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَعِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلسَّاعَةِ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
Mpe apambolami ye oyo azali na bokonzi ya nsé na ya likolo, na maye ezali okati na yango, mpe ye nde azali na boyebi ya tango ya suka. Mpe epai naye nde bokozongisama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَا يَمۡلِكُ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِهِ ٱلشَّفَٰعَةَ إِلَّا مَن شَهِدَ بِٱلۡحَقِّ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
Мре baye bazali kobondela bango elongo naye (Allah), bakokoka te kolobela, longola sé baye batatoli bosembo mpe bango bazali koyeba.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَهُمۡ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۖ فَأَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
Mpe soki otuni bango nani akela bango, bakolobaka: Ya soló ezali Allah, kasi тропа nini bazali kopesa ye mokongo?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقِيلِهِۦ يَٰرَبِّ إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ قَوۡمٞ لَّا يُؤۡمِنُونَ
Mpe liloba lia ye (ntoma Muhammad epai ya Allah): Nkolo! Ya soló, bato wana bakondimaka te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱصۡفَحۡ عَنۡهُمۡ وَقُلۡ سَلَٰمٞۚ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Malamu, mitiya mosika na bango (limbisa bango) mpe loba: Boboto. Kala mingi te bakoyebaka[1].
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സ്സുഖ്റുഫ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക