Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സ്സുമർ   ആയത്ത്:
۞ فَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن كَذَبَ عَلَى ٱللَّهِ وَكَذَّبَ بِٱلصِّدۡقِ إِذۡ جَآءَهُۥٓۚ أَلَيۡسَ فِي جَهَنَّمَ مَثۡوٗى لِّلۡكَٰفِرِينَ
Мре nani azali mabe koleka moto oyo abukeli Allah lokuta mpe aboyi bosembo tango eyeli ye. Na yango; lifelo te nde esika ya bapengwi?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِي جَآءَ بِٱلصِّدۡقِ وَصَدَّقَ بِهِۦٓ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُتَّقُونَ
Kasi oyo akoya na bosôló, mpe oyo akondimela yango, bango nde babangi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَهُم مَّا يَشَآءُونَ عِندَ رَبِّهِمۡۚ ذَٰلِكَ جَزَآءُ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Bakozuaka maye bakolingaka epai ya Nkolo wa bango. Wana nde ekozalaka lifuta lia babongisi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِيُكَفِّرَ ٱللَّهُ عَنۡهُمۡ أَسۡوَأَ ٱلَّذِي عَمِلُواْ وَيَجۡزِيَهُمۡ أَجۡرَهُم بِأَحۡسَنِ ٱلَّذِي كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Mpe mpo Allah alongolela bango mbeba iye basalaki, mpe mpo afuta bango lifuta lilamu koleka maye basalaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَلَيۡسَ ٱللَّهُ بِكَافٍ عَبۡدَهُۥۖ وَيُخَوِّفُونَكَ بِٱلَّذِينَ مِن دُونِهِۦۚ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنۡ هَادٖ
Allah akoki te тропа kobatela mowumbu naye (тропа kobatela ye mpe kopesa ye lisalisi)? Mpe bazali kobangisa yo na baye bazali ye te (Allah), mpe oyo Allah abungisi, akozua bokambi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَن يَهۡدِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِن مُّضِلٍّۗ أَلَيۡسَ ٱللَّهُ بِعَزِيزٖ ذِي ٱنتِقَامٖ
Mpe oyo Allah akambi ye, akozua mobungisi te. Boye ezali Allah te nde atonda bokasi mpe Nkolo bokonzi ya kopesa etumbu?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۚ قُلۡ أَفَرَءَيۡتُم مَّا تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ إِنۡ أَرَادَنِيَ ٱللَّهُ بِضُرٍّ هَلۡ هُنَّ كَٰشِفَٰتُ ضُرِّهِۦٓ أَوۡ أَرَادَنِي بِرَحۡمَةٍ هَلۡ هُنَّ مُمۡسِكَٰتُ رَحۡمَتِهِۦۚ قُلۡ حَسۡبِيَ ٱللَّهُۖ عَلَيۡهِ يَتَوَكَّلُ ٱلۡمُتَوَكِّلُونَ
Мре soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya solo, ezali Allah. Loba: Bomoni ndenge nini тропа oyo bozali kokumisa botiki Allah? Soki Allah alingeli ngai mabe, boye bakolongolela ngai yango? То soki alingeli ngai bolamu, bango nde bakopekisa bolamu bona? Loba: Allah akoki ngai. Epai naye nde bamipesa baye balingi lisungi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ يَٰقَوۡمِ ٱعۡمَلُواْ عَلَىٰ مَكَانَتِكُمۡ إِنِّي عَٰمِلٞۖ فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ
Loba: Eh bato ba ngai! Bosala oyo bokolinga kosala, ya sólo ngai nazali kosala na lolenge na ngai, kasi bokoyebaka kala te,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
مَن يَأۡتِيهِ عَذَابٞ يُخۡزِيهِ وَيَحِلُّ عَلَيۡهِ عَذَابٞ مُّقِيمٌ
Oyo etumbu ekoyelaka ye, (na mokili) akomona yango, mpe akozua yango o mokolo mwa suka na bowumeli.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സ്സുമർ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക