Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: അഹ്സാബ്   ആയത്ത്:
مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ رِجَالٞ صَدَقُواْ مَا عَٰهَدُواْ ٱللَّهَ عَلَيۡهِۖ فَمِنۡهُم مَّن قَضَىٰ نَحۡبَهُۥ وَمِنۡهُم مَّن يَنتَظِرُۖ وَمَا بَدَّلُواْ تَبۡدِيلٗا
O kati ya bandimi, ezali na mibali ya bosembo, baye bakokisaki elaka na bango epai ya Allah. Basusu kati na bango mokano ya liwa ekomeli bango, basusu bazali kozela mpe oyo ya bango, kasi babongolaki te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِّيَجۡزِيَ ٱللَّهُ ٱلصَّٰدِقِينَ بِصِدۡقِهِمۡ وَيُعَذِّبَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ إِن شَآءَ أَوۡ يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
Mpo Allah afuta baye bazali koloba solo na bosôló bwa bango, mpe apesa etumbu na bato ya bilongi mibale soki alingi, to akolimbisa bango. Ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَرَدَّ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِغَيۡظِهِمۡ لَمۡ يَنَالُواْ خَيۡرٗاۚ وَكَفَى ٱللَّهُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ ٱلۡقِتَالَۚ وَكَانَ ٱللَّهُ قَوِيًّا عَزِيزٗا
Mpe Allah azongisaki mabe na bango (bapengwi), mpe bazuaki litomba moko te. Kasi Allah akoki na bandimi na bitumba (mpe asalisaka bango), mpe Allah azali makasi atonda nguya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنزَلَ ٱلَّذِينَ ظَٰهَرُوهُم مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مِن صَيَاصِيهِمۡ وَقَذَفَ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلرُّعۡبَ فَرِيقٗا تَقۡتُلُونَ وَتَأۡسِرُونَ فَرِيقٗا
Mpe Allah, akitisaki basungi na bango ya bayuda okati na bandako na bango, kasi bazuaki bolamu te kati ya bato babuku mpe akotisaki bobangi ya makasi kati na mitema mia bango, bobomaki basusu kati na bango, mpe basusu bokangaki na boloko.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَوۡرَثَكُمۡ أَرۡضَهُمۡ وَدِيَٰرَهُمۡ وَأَمۡوَٰلَهُمۡ وَأَرۡضٗا لَّمۡ تَطَـُٔوهَاۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٗا
Mpe akitanisaki bino mabele na bango, bandako na bomengo na bango, mpe mabele mosusu oyo naino bonyati yango te, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ قُل لِّأَزۡوَٰجِكَ إِن كُنتُنَّ تُرِدۡنَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا وَزِينَتَهَا فَتَعَالَيۡنَ أُمَتِّعۡكُنَّ وَأُسَرِّحۡكُنَّ سَرَاحٗا جَمِيلٗا
Eh ntoma! Loba na basi nayo: Soki bolingi bomoyi ya mokili na bisengo bia yango, boya napesa bino yango mpe nakabwana na bino na lolenge ya malamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن كُنتُنَّ تُرِدۡنَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَٱلدَّارَ ٱلۡأٓخِرَةَ فَإِنَّ ٱللَّهَ أَعَدَّ لِلۡمُحۡسِنَٰتِ مِنكُنَّ أَجۡرًا عَظِيمٗا
Kasi soki bolingi Allah na motindami waye, na efandelo ya mokolo ya suka, ya soló Allah abombeli babongisi kati na bino (basi) lifuta linene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰنِسَآءَ ٱلنَّبِيِّ مَن يَأۡتِ مِنكُنَّ بِفَٰحِشَةٖ مُّبَيِّنَةٖ يُضَٰعَفۡ لَهَا ٱلۡعَذَابُ ضِعۡفَيۡنِۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٗا
Eh basi ya ntoma! Oyó kati na bino akoya na mabe oyo ezali polele na bilembo bimonani, tokobakisela ye etumbu mbala mibale. Mpe wana ezali pete тропа Allah.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: അഹ്സാബ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക