Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ന്നംല്   ആയത്ത്:

An-Naml

طسٓۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡقُرۡءَانِ وَكِتَابٖ مُّبِينٍ
Twâ sîn,[1] oyo ezali mikapo mia kurani, mpe buku wa polele.
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
هُدٗى وَبُشۡرَىٰ لِلۡمُؤۡمِنِينَ
(Ezali) na bokambami mpe kopesa sango elamu epai ya bandimi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ يُوقِنُونَ
Baye bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat[2], mpe bazali na tembe te na mokolo mwa suka.
[2] Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ زَيَّنَّا لَهُمۡ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَهُمۡ يَعۡمَهُونَ
Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَهُمۡ سُوٓءُ ٱلۡعَذَابِ وَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ هُمُ ٱلۡأَخۡسَرُونَ
Bango wana nde bakozala na etumbu ya mabe, mpe o mokolo ya suka bakozala bazangi mpenza.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّكَ لَتُلَقَّى ٱلۡقُرۡءَانَ مِن لَّدُنۡ حَكِيمٍ عَلِيمٍ
Mpe ya solo, ozali koyamba kurani oyo kowuta epai ya oyo azali na bwanya atonda mayele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِأَهۡلِهِۦٓ إِنِّيٓ ءَانَسۡتُ نَارٗا سَـَٔاتِيكُم مِّنۡهَا بِخَبَرٍ أَوۡ ءَاتِيكُم بِشِهَابٖ قَبَسٖ لَّعَلَّكُمۡ تَصۡطَلُونَ
(Kanisa) tango Mûssa alobaki na libota lia ye: Ya solo, ngai namoni moto, nakoyela bino sango okati na yango to nakoyela bino koni ya moto mpo été bomiyotola.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّا جَآءَهَا نُودِيَ أَنۢ بُورِكَ مَن فِي ٱلنَّارِ وَمَنۡ حَوۡلَهَا وَسُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe tango akomaki ayoki mongongo ebengi été: Apambolami moto oyo atelemi o kati ya moto, ndenge moko mpe baye bazali zinga zinga na yango. Nkembo na Allah Nkolo ya mokili. (atonda bokasi mpe bwanya).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰمُوسَىٰٓ إِنَّهُۥٓ أَنَا ٱللَّهُ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Eh Mûssa! Ezali ya soló, ngai Allah oyo nazali na nguya na ntonda bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَلۡقِ عَصَاكَۚ فَلَمَّا رَءَاهَا تَهۡتَزُّ كَأَنَّهَا جَآنّٞ وَلَّىٰ مُدۡبِرٗا وَلَمۡ يُعَقِّبۡۚ يَٰمُوسَىٰ لَا تَخَفۡ إِنِّي لَا يَخَافُ لَدَيَّ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
Mpe bwaka lingenda nayo, mpe tango amoni yango ekomi kongoluma lokola nyoka, apesi mokongo abaluki, eh Mûssa! Kobanga te epai na ngai batindami babangaka te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِلَّا مَن ظَلَمَ ثُمَّ بَدَّلَ حُسۡنَۢا بَعۡدَ سُوٓءٖ فَإِنِّي غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Longola sé oyo asali mbeba mpe sima abongisi yango. Ya solo, nazali molimbisi na tonda mawa.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَدۡخِلۡ يَدَكَ فِي جَيۡبِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٖۖ فِي تِسۡعِ ءَايَٰتٍ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَقَوۡمِهِۦٓۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
Mpe kotisa loboko nayo na libenga nayo, ekobima pembe ekosala mpasi te, ezali moko ya bikamwiseli libua ökende na yango epai ya falo na bato naye, mpo bazali ya sólo bato ya mabe mpenza.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّا جَآءَتۡهُمۡ ءَايَٰتُنَا مُبۡصِرَةٗ قَالُواْ هَٰذَا سِحۡرٞ مُّبِينٞ
Mpe tango bilembo bia biso bikomelaki bango polele polele, balobi ete: Oyo ezali bonganga ya polele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ന്നംല്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക