Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ശ്ശുഅറാഅ്   ആയത്ത്:
فَلَمَّا تَرَٰٓءَا ٱلۡجَمۡعَانِ قَالَ أَصۡحَٰبُ مُوسَىٰٓ إِنَّا لَمُدۡرَكُونَ
Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ كَلَّآۖ إِنَّ مَعِيَ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
(Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱضۡرِب بِّعَصَاكَ ٱلۡبَحۡرَۖ فَٱنفَلَقَ فَكَانَ كُلُّ فِرۡقٖ كَٱلطَّوۡدِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَزۡلَفۡنَا ثَمَّ ٱلۡأٓخَرِينَ
Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنجَيۡنَا مُوسَىٰ وَمَن مَّعَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima, tozindisaki basusu (banguna).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱتۡلُ عَلَيۡهِمۡ نَبَأَ إِبۡرَٰهِيمَ
Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَا تَعۡبُدُونَ
Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ نَعۡبُدُ أَصۡنَامٗا فَنَظَلُّ لَهَا عَٰكِفِينَ
Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ هَلۡ يَسۡمَعُونَكُمۡ إِذۡ تَدۡعُونَ
Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوۡ يَنفَعُونَكُمۡ أَوۡ يَضُرُّونَ
То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ بَلۡ وَجَدۡنَآ ءَابَآءَنَا كَذَٰلِكَ يَفۡعَلُونَ
Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ أَفَرَءَيۡتُم مَّا كُنتُمۡ تَعۡبُدُونَ
Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُمُ ٱلۡأَقۡدَمُونَ
Bino na bankoko na bino ya kala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَإِنَّهُمۡ عَدُوّٞ لِّيٓ إِلَّا رَبَّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلَّذِي خَلَقَنِي فَهُوَ يَهۡدِينِ
Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِي هُوَ يُطۡعِمُنِي وَيَسۡقِينِ
Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذَا مَرِضۡتُ فَهُوَ يَشۡفِينِ
Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِي يُمِيتُنِي ثُمَّ يُحۡيِينِ
Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِيٓ أَطۡمَعُ أَن يَغۡفِرَ لِي خَطِيٓـَٔتِي يَوۡمَ ٱلدِّينِ
Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
رَبِّ هَبۡ لِي حُكۡمٗا وَأَلۡحِقۡنِي بِٱلصَّٰلِحِينَ
Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ശ്ശുഅറാഅ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക