Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഹജ്ജ്   ആയത്ത്:
حُنَفَآءَ لِلَّهِ غَيۡرَ مُشۡرِكِينَ بِهِۦۚ وَمَن يُشۡرِكۡ بِٱللَّهِ فَكَأَنَّمَا خَرَّ مِنَ ٱلسَّمَآءِ فَتَخۡطَفُهُ ٱلطَّيۡرُ أَوۡ تَهۡوِي بِهِ ٱلرِّيحُ فِي مَكَانٖ سَحِيقٖ
(Bozala) Sembo liboso ya Allah, bosangisa ye na eloko te. Mpe oyo akosangisa Allah, azali lokola oyo akwei kowuta о likolo, bandeke bamemi ye to mopepe mozui ye о esika ya mosika.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ذَٰلِكَۖ وَمَن يُعَظِّمۡ شَعَٰٓئِرَ ٱللَّهِ فَإِنَّهَا مِن تَقۡوَى ٱلۡقُلُوبِ
Na yango: Oyo akokumisa mibeko ya Allah, ya soló wana nde ezali kolakisa mitema ya bobangi (Allah).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَكُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى ثُمَّ مَحِلُّهَآ إِلَى ٱلۡبَيۡتِ ٱلۡعَتِيقِ
Kati ya banyama wana ekosalisa bino kino tango eyebani, тре esika ya kosasa yango ekozala pembeni ya ndako esantu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلِكُلِّ أُمَّةٖ جَعَلۡنَا مَنسَكٗا لِّيَذۡكُرُواْ ٱسۡمَ ٱللَّهِ عَلَىٰ مَا رَزَقَهُم مِّنۢ بَهِيمَةِ ٱلۡأَنۡعَٰمِۗ فَإِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَلَهُۥٓ أَسۡلِمُواْۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُخۡبِتِينَ
Mpe umma[1] nionso totielaki bango lolenge ya kokumisa Allah na bopesi mbeka, mpo ete batanga nkombo ya Allah likolo ya bibwele biye apesaki bango, mpe Nzambe wa bino azali Nzambe moko ya sólo, botosa ye mpe pesa sango elamu epai ya bamikitisi.
[1] Umma: Elakisi: Lisanga, bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلَّذِينَ إِذَا ذُكِرَ ٱللَّهُ وَجِلَتۡ قُلُوبُهُمۡ وَٱلصَّٰبِرِينَ عَلَىٰ مَآ أَصَابَهُمۡ وَٱلۡمُقِيمِي ٱلصَّلَوٰةِ وَمِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ يُنفِقُونَ
Baye bazalaka soki nkombo ya Allah etangami, mitema mia bango milengi, mpe soki mabe ezui bango bakangi mitema, Mpe batelemisi losambo mpe bazali kobimisa maye topesaki bango, (тропа Allah)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلۡبُدۡنَ جَعَلۡنَٰهَا لَكُم مِّن شَعَٰٓئِرِ ٱللَّهِ لَكُمۡ فِيهَا خَيۡرٞۖ فَٱذۡكُرُواْ ٱسۡمَ ٱللَّهِ عَلَيۡهَا صَوَآفَّۖ فَإِذَا وَجَبَتۡ جُنُوبُهَا فَكُلُواْ مِنۡهَا وَأَطۡعِمُواْ ٱلۡقَانِعَ وَٱلۡمُعۡتَرَّۚ كَذَٰلِكَ سَخَّرۡنَٰهَا لَكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
Mpe totielaki bino budna[1] moko ya bilembo ya Allah, bozali na bolamo kati na yango mpe tango bozali kokata yango, botanga nkombo ya Allah yambo ya kosasa, na tango azali ya kotelema sima (soki ekufi) ekwei na mabele bolia yango mpe boleisa baye bazangi, mpe ba oyo bakokaka kosenga te, na boye nde topesaki bino yango mpo ete bopesa biso matondi.
[1] Budna: Ibili (chameau) na ngombe.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَن يَنَالَ ٱللَّهَ لُحُومُهَا وَلَا دِمَآؤُهَا وَلَٰكِن يَنَالُهُ ٱلتَّقۡوَىٰ مِنكُمۡۚ كَذَٰلِكَ سَخَّرَهَا لَكُمۡ لِتُكَبِّرُواْ ٱللَّهَ عَلَىٰ مَا هَدَىٰكُمۡۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Allah atalaka mișuni na makila na yango te, kasi atalaka nde bobangi na bino. Lolenge wana nde atielaki bino yango, mpo ete bokumisa bonene ya Allah na maye akambi bino (o nzela ya semba) mpe pesa babongisi sango elamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ إِنَّ ٱللَّهَ يُدَٰفِعُ عَنِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ كُلَّ خَوَّانٖ كَفُورٍ
Ya soló, Allah abundelaka bandimi, ya solo, Allah alingaka te mokosi oyo nyoso azanga botondi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഹജ്ജ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക