Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ത്വാഹാ   ആയത്ത്:
فَتَعَٰلَى ٱللَّهُ ٱلۡمَلِكُ ٱلۡحَقُّۗ وَلَا تَعۡجَلۡ بِٱلۡقُرۡءَانِ مِن قَبۡلِ أَن يُقۡضَىٰٓ إِلَيۡكَ وَحۡيُهُۥۖ وَقُل رَّبِّ زِدۡنِي عِلۡمٗا
Lokumu ezali ya Allah nkumu ya bosôló, mpe kotanga kuranı noki noki te yambo ete ekitela yo, mpe loba: Oh Nkolo wa ngai! Bakisela ngai boyebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ عَهِدۡنَآ إِلَىٰٓ ءَادَمَ مِن قَبۡلُ فَنَسِيَ وَلَمۡ نَجِدۡ لَهُۥ عَزۡمٗا
Mpe tosilaki kopesa Adam mobeko liboso mpe abosanaki yango, mpe tokutaki bokangami ya makasi epai naye te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ أَبَىٰ
Mpe tango tolobaki na ba anzelu: Bogumbama o liboso ya Adam, bagumbamaki bango banso, longola sé satana, aboyaki (kogumbamela ye),
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَقُلۡنَا يَٰٓـَٔادَمُ إِنَّ هَٰذَا عَدُوّٞ لَّكَ وَلِزَوۡجِكَ فَلَا يُخۡرِجَنَّكُمَا مِنَ ٱلۡجَنَّةِ فَتَشۡقَىٰٓ
Mpe tolobaki: Eh Âdâm! Ya soló, oyo nde monguna nayo, yo na mwasi wayo. Na yango abimisa bino na paladizo te noki okozala na mpasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ لَكَ أَلَّا تَجُوعَ فِيهَا وَلَا تَعۡرَىٰ
Ya sólo, тропа yo, okoyokaka nzala te okati na yango mpe okozalaka bolumbu te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنَّكَ لَا تَظۡمَؤُاْ فِيهَا وَلَا تَضۡحَىٰ
Mpe ya sólo, yo okoyokaka mposa ya mayi te, mpe pasi ya moyi ekozuaka yo te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَوَسۡوَسَ إِلَيۡهِ ٱلشَّيۡطَٰنُ قَالَ يَٰٓـَٔادَمُ هَلۡ أَدُلُّكَ عَلَىٰ شَجَرَةِ ٱلۡخُلۡدِ وَمُلۡكٖ لَّا يَبۡلَىٰ
Mpe (sima) satana amekaki ye na koloba ete: Eh Âdâm! Nalakisa yo nzete ya bomoi ya nseko mpe bokonzi eye ekobebisama te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَكَلَا مِنۡهَا فَبَدَتۡ لَهُمَا سَوۡءَٰتُهُمَا وَطَفِقَا يَخۡصِفَانِ عَلَيۡهِمَا مِن وَرَقِ ٱلۡجَنَّةِۚ وَعَصَىٰٓ ءَادَمُ رَبَّهُۥ فَغَوَىٰ
Bango mibale baliaki yango, mpe batikalaki bolumbu, mpe babandi komizipa na nkasa ya Iola, mpe Adam aboyaki kotosa Nkolo wa ye, mpe abungaki na mibeko mia Nkolo waye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ثُمَّ ٱجۡتَبَٰهُ رَبُّهُۥ فَتَابَ عَلَيۡهِ وَهَدَىٰ
Sima Nkolo waye aponaki ye mpe ayambaki tubela naye mpe akambaki ye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ ٱهۡبِطَا مِنۡهَا جَمِيعَۢاۖ بَعۡضُكُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوّٞۖ فَإِمَّا يَأۡتِيَنَّكُم مِّنِّي هُدٗى فَمَنِ ٱتَّبَعَ هُدَايَ فَلَا يَضِلُّ وَلَا يَشۡقَىٰ
Alobi: Bokita awa[1] bino banso, bokozala na kibonguna na mabota ma bino banso, (bakitani na bino) mpe soki bokambi bwa ngai boyeli bino, oyo akolanda bokambi bwa ngai, akobunga te mpe akozalaka na mpasi te.
[1] Bokita awa: Elakisi: Bobima na lola bökende na mokili
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَنۡ أَعۡرَضَ عَن ذِكۡرِي فَإِنَّ لَهُۥ مَعِيشَةٗ ضَنكٗا وَنَحۡشُرُهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ أَعۡمَىٰ
Mpe oyo akoboya bokundoli bwa ngai, ya soló, ye akozalaka na bomoyi ya mpasi, mpe omokolo mwa suka, tokosekwisa ye miso mazipama,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ رَبِّ لِمَ حَشَرۡتَنِيٓ أَعۡمَىٰ وَقَدۡ كُنتُ بَصِيرٗا
Akolobaka, oh Nkolo wa ngai! Mpona nini osekwisi ngai nazali kornona te kasi yambo nazalaki kornona?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ത്വാഹാ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക