Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ബഖറഃ   ആയത്ത്:
وَإِذۡ قَالَ رَبُّكَ لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِنِّي جَاعِلٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ خَلِيفَةٗۖ قَالُوٓاْ أَتَجۡعَلُ فِيهَا مَن يُفۡسِدُ فِيهَا وَيَسۡفِكُ ٱلدِّمَآءَ وَنَحۡنُ نُسَبِّحُ بِحَمۡدِكَ وَنُقَدِّسُ لَكَۖ قَالَ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
Mpe tango Nkolo wa yo alobaki na ba anzelu ete: Ya sôló ngai nalingi kotia na mabele mokitani. Bayanolaki ete: Olingi otia kati na mabele oyo akobebisa mpe akosopa makila? Mpe biso tozali kokumisa yo mpe tozali kokumisa bosantu bwayo. (Allah) alobaki ete: Ya sôló ngai nazali na boyebi na maye bino boyebi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَعَلَّمَ ءَادَمَ ٱلۡأَسۡمَآءَ كُلَّهَا ثُمَّ عَرَضَهُمۡ عَلَى ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ فَقَالَ أَنۢبِـُٔونِي بِأَسۡمَآءِ هَٰٓؤُلَآءِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Mpe atangisaki Âdam bankombo ya bikelamu binso, nsima atiaki yango liboso ya ba anzelu mpe alobaki: Botangela ngai bankombo ya bikelamu biye soki ya sôló bozali na bosembo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ لَا عِلۡمَ لَنَآ إِلَّا مَا عَلَّمۡتَنَآۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
Bayanoli: Lokumu nayo! Tozali na boyebi te kaka na maye otangisaki biso. Ya sôló yo ozali moyebi ya manso mpe otondi na bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ يَٰٓـَٔادَمُ أَنۢبِئۡهُم بِأَسۡمَآئِهِمۡۖ فَلَمَّآ أَنۢبَأَهُم بِأَسۡمَآئِهِمۡ قَالَ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ غَيۡبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَأَعۡلَمُ مَا تُبۡدُونَ وَمَا كُنتُمۡ تَكۡتُمُونَ
Alobaki: Eh Âdam! tangela bango bankombo ya bikelamu biye. Mpe na tango atangelaki bango bankombo na yango, (Allah) alobaki: Nayebisaki bino te ete ya sôló ngai nayebi mabombami ya likolo na ya nsé mpe nayebi maye bobimisaka polele na maye bobombaka?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ أَبَىٰ وَٱسۡتَكۡبَرَ وَكَانَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe na tango toyebisaki na ba anzelu bogumbamela Âdam, banso bagumbamaki longola sé ibilisi[1] oyo atondisamaki na lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi.
[1] Satana.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقُلۡنَا يَٰٓـَٔادَمُ ٱسۡكُنۡ أَنتَ وَزَوۡجُكَ ٱلۡجَنَّةَ وَكُلَا مِنۡهَا رَغَدًا حَيۡثُ شِئۡتُمَا وَلَا تَقۡرَبَا هَٰذِهِ ٱلشَّجَرَةَ فَتَكُونَا مِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe tolobaki: Eh Âdam! Fanda na mwasi nayo okati ya lola, mpe bolia binso biye bokolinga, mpe bobeleme te penepene na nzete oyo, soki bobelemi penepene na yango bokozala elongo ya babubi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَزَلَّهُمَا ٱلشَّيۡطَٰنُ عَنۡهَا فَأَخۡرَجَهُمَا مِمَّا كَانَا فِيهِۖ وَقُلۡنَا ٱهۡبِطُواْ بَعۡضُكُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوّٞۖ وَلَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُسۡتَقَرّٞ وَمَتَٰعٌ إِلَىٰ حِينٖ
Mpe na sima satana akosaki bango mpe abimisaki bango o esika eye bazwamaki. Mpe tolobaki bokita bino na bino bokozala banguna mpe bokozala o mabele na bisengo ya ngonga moke.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَتَلَقَّىٰٓ ءَادَمُ مِن رَّبِّهِۦ كَلِمَٰتٖ فَتَابَ عَلَيۡهِۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe Âdam azuaki maloba ya bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe (Allah) alimbisaki ye, ya sôló ye azali moyoki tubela mpe atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ബഖറഃ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക