Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഹിജ്ർ   ആയത്ത്:
إِذۡ دَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَقَالُواْ سَلَٰمٗا قَالَ إِنَّا مِنكُمۡ وَجِلُونَ
Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ لَا تَوۡجَلۡ إِنَّا نُبَشِّرُكَ بِغُلَٰمٍ عَلِيمٖ
Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ أَبَشَّرۡتُمُونِي عَلَىٰٓ أَن مَّسَّنِيَ ٱلۡكِبَرُ فَبِمَ تُبَشِّرُونَ
Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ بَشَّرۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ فَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡقَٰنِطِينَ
Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ وَمَن يَقۡنَطُ مِن رَّحۡمَةِ رَبِّهِۦٓ إِلَّا ٱلضَّآلُّونَ
Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ فَمَا خَطۡبُكُمۡ أَيُّهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُوٓاْ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمٖ مُّجۡرِمِينَ
Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِلَّآ ءَالَ لُوطٍ إِنَّا لَمُنَجُّوهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِلَّا ٱمۡرَأَتَهُۥ قَدَّرۡنَآ إِنَّهَا لَمِنَ ٱلۡغَٰبِرِينَ
Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّا جَآءَ ءَالَ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ إِنَّكُمۡ قَوۡمٞ مُّنكَرُونَ
Alobi: Bozali bato bayebani te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ بَلۡ جِئۡنَٰكَ بِمَا كَانُواْ فِيهِ يَمۡتَرُونَ
Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَتَيۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَسۡرِ بِأَهۡلِكَ بِقِطۡعٖ مِّنَ ٱلَّيۡلِ وَٱتَّبِعۡ أَدۡبَٰرَهُمۡ وَلَا يَلۡتَفِتۡ مِنكُمۡ أَحَدٞ وَٱمۡضُواْ حَيۡثُ تُؤۡمَرُونَ
Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَضَيۡنَآ إِلَيۡهِ ذَٰلِكَ ٱلۡأَمۡرَ أَنَّ دَابِرَ هَٰٓؤُلَآءِ مَقۡطُوعٞ مُّصۡبِحِينَ
Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَجَآءَ أَهۡلُ ٱلۡمَدِينَةِ يَسۡتَبۡشِرُونَ
Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ ضَيۡفِي فَلَا تَفۡضَحُونِ
Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلَا تُخۡزُونِ
Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُوٓاْ أَوَلَمۡ نَنۡهَكَ عَنِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഹിജ്ർ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക