Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഹൂദ്   ആയത്ത്:
وَيَصۡنَعُ ٱلۡفُلۡكَ وَكُلَّمَا مَرَّ عَلَيۡهِ مَلَأٞ مِّن قَوۡمِهِۦ سَخِرُواْ مِنۡهُۚ قَالَ إِن تَسۡخَرُواْ مِنَّا فَإِنَّا نَسۡخَرُ مِنكُمۡ كَمَا تَسۡخَرُونَ
Mpe abandi kotonga masuwa, mpe tango nyoso bankumu na bango bazali koleka, bazali koseka ye. Azongiseli bango eyano alobi: Soki bozali koseka biso, ya sólo, biso mpe tokosekaka bino ndenge bozali koseka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ مَن يَأۡتِيهِ عَذَابٞ يُخۡزِيهِ وَيَحِلُّ عَلَيۡهِ عَذَابٞ مُّقِيمٌ
Mpe ezali na tango molai te bokoyebaka nani oyo etumbu ekoyela ye, etumbu ya makasi mpe ya kosilisa lokumu, mpe esengeli naye kozua etumbu oyo ekotikala libela.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَ أَمۡرُنَا وَفَارَ ٱلتَّنُّورُ قُلۡنَا ٱحۡمِلۡ فِيهَا مِن كُلّٖ زَوۡجَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِ وَأَهۡلَكَ إِلَّا مَن سَبَقَ عَلَيۡهِ ٱلۡقَوۡلُ وَمَنۡ ءَامَنَۚ وَمَآ ءَامَنَ مَعَهُۥٓ إِلَّا قَلِيلٞ
Kino tango mokano (mitindo) mia biso eyaki, mayi etombokaki na mpela ya makasi tolobaki naye été (Nûh): Kotisa okati ya masuwa lolenge ya banyama mibale mibale (mwasi na mobali) okotisa mpe libota nayo, longola sé ba oyo ekomamaki été esengeli bakufa, mpe baye bandimaki, kasi bandimaki naye te sé bato moke penza.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ وَقَالَ ٱرۡكَبُواْ فِيهَا بِسۡمِ ٱللَّهِ مَجۡر۪ىٰهَا وَمُرۡسَىٰهَآۚ إِنَّ رَبِّي لَغَفُورٞ رَّحِيمٞ
Мре alobaki: Bomata okati na yango na nkombo ya Allah oyo afandisi yango likolo ya etamboli na yango. Ya soló, Nkolo na ngai azali penza molimbisi atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَهِيَ تَجۡرِي بِهِمۡ فِي مَوۡجٖ كَٱلۡجِبَالِ وَنَادَىٰ نُوحٌ ٱبۡنَهُۥ وَكَانَ فِي مَعۡزِلٖ يَٰبُنَيَّ ٱرۡكَب مَّعَنَا وَلَا تَكُن مَّعَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe ebandi kotepatepa likolo ya mayi kino ememaki bango kati kati ya mbonge ya makasi lokola ba ngomba ya minene, mpe Nûh abengi mwana naye oyo aboyaki komata na masuwa: Eh mwana na ngai! Mata elongo na biso, kasi kotikala te elongo na bapengwi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ سَـَٔاوِيٓ إِلَىٰ جَبَلٖ يَعۡصِمُنِي مِنَ ٱلۡمَآءِۚ قَالَ لَا عَاصِمَ ٱلۡيَوۡمَ مِنۡ أَمۡرِ ٱللَّهِ إِلَّا مَن رَّحِمَۚ وَحَالَ بَيۡنَهُمَا ٱلۡمَوۡجُ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُغۡرَقِينَ
(Mwana) ayanoli été: Nakomata likolo ya ngomba oyo тропа komibatela na mayi. (Nûh) alobaki naye été: Lelo mobateli akozala te тропа etumbu ya Allah, longola sé oyo akoyokela ye mawa. Na sima mbonge ekaboli bango, mpe (mwana waye) atikalaki elongo na baye bazindisamaki (na mayi).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقِيلَ يَٰٓأَرۡضُ ٱبۡلَعِي مَآءَكِ وَيَٰسَمَآءُ أَقۡلِعِي وَغِيضَ ٱلۡمَآءُ وَقُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ وَٱسۡتَوَتۡ عَلَى ٱلۡجُودِيِّۖ وَقِيلَ بُعۡدٗا لِّلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe motindo epesamaki été: Oh mabele! Mela mayi nayo, oh mapata! Tika (konokisa mbula) mayi makutolamaki mpe masuwa makendeki kotelema likolo ya ngomba, nkombo na yango djudi. Mpe motindo ekweyaki été: Bato mabe balimwa.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَنَادَىٰ نُوحٞ رَّبَّهُۥ فَقَالَ رَبِّ إِنَّ ٱبۡنِي مِنۡ أَهۡلِي وَإِنَّ وَعۡدَكَ ٱلۡحَقُّ وَأَنتَ أَحۡكَمُ ٱلۡحَٰكِمِينَ
Mpe Nûh abelelaki Nkolo waye: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, mwana wa ngai azali o kati ya libota lia ngai, mpe elaka nayo ezali solo, mpe ozali zuzi ya bosembo koleka ba zuzi banso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഹൂദ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക