Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់មូសហ្សាំមិល   វាក្យខណ្ឌ:

Al-Muzzammil

يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمُزَّمِّلُ
Eh yo (Muhammad) mofiniki bilamba!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قُمِ ٱلَّيۡلَ إِلَّا قَلِيلٗا
Telema mpo (osambela) butu mobimba, longola sé mwa tango moke,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
نِّصۡفَهُۥٓ أَوِ ٱنقُصۡ مِنۡهُ قَلِيلًا
Kati kati na yango to moke,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَوۡ زِدۡ عَلَيۡهِ وَرَتِّلِ ٱلۡقُرۡءَانَ تَرۡتِيلًا
To bakisa yango mpe tanga kurani malembe mpe polele!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّا سَنُلۡقِي عَلَيۡكَ قَوۡلٗا ثَقِيلًا
Tokokitisela yo maloba ya kilo (ya lokumu penza).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ نَاشِئَةَ ٱلَّيۡلِ هِيَ أَشَدُّ وَطۡـٔٗا وَأَقۡوَمُ قِيلًا
Kosambela na butu ezali malamu mpe epesaka makasi, mpe ezali malamu mingi тропа botangi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ لَكَ فِي ٱلنَّهَارِ سَبۡحٗا طَوِيلٗا
Mpo ete ya soló, ozali na misala ebele na moyi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱذۡكُرِ ٱسۡمَ رَبِّكَ وَتَبَتَّلۡ إِلَيۡهِ تَبۡتِيلٗا
Mpe kanisa nkombo ya Nkolo nayo mpe mipesa naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَّبُّ ٱلۡمَشۡرِقِ وَٱلۡمَغۡرِبِ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ فَٱتَّخِذۡهُ وَكِيلٗا
Nkolo ya moniele mpe eloli, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, zúa ye mobateli (wa bino)!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَا يَقُولُونَ وَٱهۡجُرۡهُمۡ هَجۡرٗا جَمِيلٗا
Kanga motema na maye bazali koyebisa yo, mpe mitiya mosika na bango na lolenge ya malamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَذَرۡنِي وَٱلۡمُكَذِّبِينَ أُوْلِي ٱلنَّعۡمَةِ وَمَهِّلۡهُمۡ قَلِيلًا
Мре tika ngai na baye bazuaka manso na lokuta baye bazali kosepela na bisengo na bango, bazali sé na tango moke ya kozela.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ لَدَيۡنَآ أَنكَالٗا وَجَحِيمٗا
Ya soló, tobombeli bango singa ya monene mpe lifelo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَطَعَامٗا ذَا غُصَّةٖ وَعَذَابًا أَلِيمٗا
Mpe bilia ya solo mabe, mpe etumbu ya makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ تَرۡجُفُ ٱلۡأَرۡضُ وَٱلۡجِبَالُ وَكَانَتِ ٱلۡجِبَالُ كَثِيبٗا مَّهِيلًا
Mokolo oyo mabele na bangomba bikoningana, mpe bikokoma lokola mputulu ya zelo ya kopanzana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَآ إِلَيۡكُمۡ رَسُولٗا شَٰهِدًا عَلَيۡكُمۡ كَمَآ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ رَسُولٗا
Ya soló, totindelaki bino motindami, azala nzeneneke epai ya bino, lolenge moko totindaki motindami epai ya falo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَعَصَىٰ فِرۡعَوۡنُ ٱلرَّسُولَ فَأَخَذۡنَٰهُ أَخۡذٗا وَبِيلٗا
Mpe falo aboyaki kotosa motindami mpe tozuaki ye kozua moko ya mabe.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَكَيۡفَ تَتَّقُونَ إِن كَفَرۡتُمۡ يَوۡمٗا يَجۡعَلُ ٱلۡوِلۡدَٰنَ شِيبًا
Ndenge nini bokomibatela na bopengwi na mokolo oyo ekokomisa bana lokola bampaka suki mpembe?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلسَّمَآءُ مُنفَطِرُۢ بِهِۦۚ كَانَ وَعۡدُهُۥ مَفۡعُولًا
Likolo likopasukaka (na somo wana) mpe akokokisaka elaka naye, wana ezali na tembe te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ هَٰذِهِۦ تَذۡكِرَةٞۖ فَمَن شَآءَ ٱتَّخَذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ سَبِيلًا
Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azua nzela epai na Nkolo naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ إِنَّ رَبَّكَ يَعۡلَمُ أَنَّكَ تَقُومُ أَدۡنَىٰ مِن ثُلُثَيِ ٱلَّيۡلِ وَنِصۡفَهُۥ وَثُلُثَهُۥ وَطَآئِفَةٞ مِّنَ ٱلَّذِينَ مَعَكَۚ وَٱللَّهُ يُقَدِّرُ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَۚ عَلِمَ أَن لَّن تُحۡصُوهُ فَتَابَ عَلَيۡكُمۡۖ فَٱقۡرَءُواْ مَا تَيَسَّرَ مِنَ ٱلۡقُرۡءَانِۚ عَلِمَ أَن سَيَكُونُ مِنكُم مَّرۡضَىٰ وَءَاخَرُونَ يَضۡرِبُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ يَبۡتَغُونَ مِن فَضۡلِ ٱللَّهِ وَءَاخَرُونَ يُقَٰتِلُونَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۖ فَٱقۡرَءُواْ مَا تَيَسَّرَ مِنۡهُۚ وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَأَقۡرِضُواْ ٱللَّهَ قَرۡضًا حَسَنٗاۚ وَمَا تُقَدِّمُواْ لِأَنفُسِكُم مِّنۡ خَيۡرٖ تَجِدُوهُ عِندَ ٱللَّهِ هُوَ خَيۡرٗا وَأَعۡظَمَ أَجۡرٗاۚ وَٱسۡتَغۡفِرُواْ ٱللَّهَۖ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمُۢ
Ya soló, Nkolo nayo (Muhammad), ayebi ete otelemaka na nsé ya mibale ya misato ya butu, mpe kati kati na yango, mpe moko ya misato na yango, elongo na ndambu ya bandimi batelemaka mpe lokola. Allah azali kokabola butu na mokolo, ayebi ete bokokoka kotanga yango te yango ayambi tubeli na bino. Kasi botanga oyo ezali mpete kati na kurani, ayebi ete kati na bino bato ya bokono bakozala, basusu bakotambola тропа koluka bolamu ya Allah, mpe basusu bakokende kobunda na nzela ya Allah. Botanga oyo ezali mpete kati na yango, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat mpe bokotisa Allah nyongo ya malamu. Mpe bolamu nyoso bokosala, bokokuta yango epai na Allah, azali malamu mpe monene na kofuta, mpe bosenga Allah bolimbisi. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់មូសហ្សាំមិល
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ