Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ម៉ាអារិច   វាក្យខណ្ឌ:

Al-Ma’ârij

سَأَلَ سَآئِلُۢ بِعَذَابٖ وَاقِعٖ
Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لِّلۡكَٰفِرِينَ لَيۡسَ لَهُۥ دَافِعٞ
Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مِّنَ ٱللَّهِ ذِي ٱلۡمَعَارِجِ
Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تَعۡرُجُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَٱلرُّوحُ إِلَيۡهِ فِي يَوۡمٖ كَانَ مِقۡدَارُهُۥ خَمۡسِينَ أَلۡفَ سَنَةٖ
Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱصۡبِرۡ صَبۡرٗا جَمِيلًا
Zela bozeli ya malamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّهُمۡ يَرَوۡنَهُۥ بَعِيدٗا
(Bapengwi) bazali kornona yango mosika,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَرَىٰهُ قَرِيبٗا
Kasi tozali kornona yango pembeni.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ تَكُونُ ٱلسَّمَآءُ كَٱلۡمُهۡلِ
Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَكُونُ ٱلۡجِبَالُ كَٱلۡعِهۡنِ
Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا يَسۡـَٔلُ حَمِيمٌ حَمِيمٗا
Molingami akotuna moninga te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يُبَصَّرُونَهُمۡۚ يَوَدُّ ٱلۡمُجۡرِمُ لَوۡ يَفۡتَدِي مِنۡ عَذَابِ يَوۡمِئِذِۭ بِبَنِيهِ
Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَصَٰحِبَتِهِۦ وَأَخِيهِ
To mwasi, to ndeko naye ya mobali.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَفَصِيلَتِهِ ٱلَّتِي تُـٔۡوِيهِ
(Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا ثُمَّ يُنجِيهِ
Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَلَّآۖ إِنَّهَا لَظَىٰ
Eloko te, ezali nde moto.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
نَزَّاعَةٗ لِّلشَّوَىٰ
Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تَدۡعُواْ مَنۡ أَدۡبَرَ وَتَوَلَّىٰ
Moto ekobengaka baye baboyaki kondima.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَمَعَ فَأَوۡعَىٰٓ
(Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ خُلِقَ هَلُوعًا
Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذَا مَسَّهُ ٱلشَّرُّ جَزُوعٗا
Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذَا مَسَّهُ ٱلۡخَيۡرُ مَنُوعًا
Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا ٱلۡمُصَلِّينَ
Longola sé baye bazali kotelemisa losambo,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ دَآئِمُونَ
Baye bakangami na losambo na bango libela;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ فِيٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ حَقّٞ مَّعۡلُومٞ
Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لِّلسَّآئِلِ وَٱلۡمَحۡرُومِ
Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ يُصَدِّقُونَ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ هُم مِّنۡ عَذَابِ رَبِّهِم مُّشۡفِقُونَ
Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ عَذَابَ رَبِّهِمۡ غَيۡرُ مَأۡمُونٖ
Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِفُرُوجِهِمۡ حَٰفِظُونَ
Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا عَلَىٰٓ أَزۡوَٰجِهِمۡ أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ فَإِنَّهُمۡ غَيۡرُ مَلُومِينَ
Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَمَنِ ٱبۡتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡعَادُونَ
Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِأَمَٰنَٰتِهِمۡ وَعَهۡدِهِمۡ رَٰعُونَ
Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ هُم بِشَهَٰدَٰتِهِمۡ قَآئِمُونَ
Mpe baye bazali kotatola sé bosóló,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ يُحَافِظُونَ
Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أُوْلَٰٓئِكَ فِي جَنَّٰتٖ مُّكۡرَمُونَ
Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَمَالِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ قِبَلَكَ مُهۡطِعِينَ
Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَعَنِ ٱلشِّمَالِ عِزِينَ
Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَيَطۡمَعُ كُلُّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ أَن يُدۡخَلَ جَنَّةَ نَعِيمٖ
Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَلَّآۖ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّمَّا يَعۡلَمُونَ
Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَآ أُقۡسِمُ بِرَبِّ ٱلۡمَشَٰرِقِ وَٱلۡمَغَٰرِبِ إِنَّا لَقَٰدِرُونَ
Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ خَيۡرٗا مِّنۡهُمۡ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ
Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَذَرۡهُمۡ يَخُوضُواْ وَيَلۡعَبُواْ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ
Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ يَخۡرُجُونَ مِنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ سِرَاعٗا كَأَنَّهُمۡ إِلَىٰ نُصُبٖ يُوفِضُونَ
Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
خَٰشِعَةً أَبۡصَٰرُهُمۡ تَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٞۚ ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمُ ٱلَّذِي كَانُواْ يُوعَدُونَ
Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ម៉ាអារិច
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ