Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: ហ្គហ្វៀរ   វាក្យខណ្ឌ:
قَالُوٓاْ أَوَلَمۡ تَكُ تَأۡتِيكُمۡ رُسُلُكُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ قَالُواْ بَلَىٰۚ قَالُواْ فَٱدۡعُواْۗ وَمَا دُعَٰٓؤُاْ ٱلۡكَٰفِرِينَ إِلَّا فِي ضَلَٰلٍ
Bakoyanola bango ete: Boye batindami bayelaki bino bilembo te? Bakozongisa ete: Iyo; bakoloba na bango lisusu: Bosenga, kasi kosenga ya bapengwi ezali sé na libungi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّا لَنَنصُرُ رُسُلَنَا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَيَوۡمَ يَقُومُ ٱلۡأَشۡهَٰدُ
Ya solo, tokolongisa batindami na biso elongo na baye bandima na nsé mpe o mokolo oyo banzeneneke bakotelema.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ لَا يَنفَعُ ٱلظَّٰلِمِينَ مَعۡذِرَتُهُمۡۖ وَلَهُمُ ٱللَّعۡنَةُ وَلَهُمۡ سُوٓءُ ٱلدَّارِ
Mokolo mona bosengi ya bolimbisi bwa bapengwi bokozalaka na ntina te, bakozuaka botutu mpe bakovandaka na mabe.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡهُدَىٰ وَأَوۡرَثۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱلۡكِتَٰبَ
Mpe tosilaki kopesa Mûssa bokambi, mpe tokitanisaki bana ya isalayele buku.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
هُدٗى وَذِكۡرَىٰ لِأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ
(Ezala) bokambami na bokundoli тропа baye bazali kokanisa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لِذَنۢبِكَ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِبۡكَٰرِ
Kanga motema; elaka ya Allah ezali ya soló, senga bolimbisi na masumu nayo mpe pesa lokumu epai ya Nkolo wayo, na tongo mpe na pokwa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ بِغَيۡرِ سُلۡطَٰنٍ أَتَىٰهُمۡ إِن فِي صُدُورِهِمۡ إِلَّا كِبۡرٞ مَّا هُم بِبَٰلِغِيهِۚ فَٱسۡتَعِذۡ بِٱللَّهِۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ
Ya sólo, baye bazali kobundisa mikapo mia Allah, mpe bazali na bilembetele te, ya sólo, bazali na lolendo okati na ba ntolo na bango. Bakozuaka maye balingi te, senga ebateli epai ya Allah. Ya sólo, ye azali moyoki, momoni ya nionso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَخَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ أَكۡبَرُ مِنۡ خَلۡقِ ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
Bokelami ya likolo na ya mabele eleki bokelami ya bato, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَلَا ٱلۡمُسِيٓءُۚ قَلِيلٗا مَّا تَتَذَكَّرُونَ
Mpe oyo miso ekufa na oyo azali kornona bakokani te, mpe baye bandima mpe basali misala ya malamu bakokani mpe te na oyo asalaka mabe, токе nde bozali kokanisa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: ហ្គហ្វៀរ
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ