Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាលីអុិមរ៉ន   វាក្យខណ្ឌ:
۞ وَسَارِعُوٓاْ إِلَىٰ مَغۡفِرَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ وَجَنَّةٍ عَرۡضُهَا ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ أُعِدَّتۡ لِلۡمُتَّقِينَ
Bowela kosala misala ya malamu miye mikopesa bino bolimbisi epai na Nkolo wa bino, mpe paradizu eye monene na yango ezali lokola likolo mpe mabele, Eye ebongisamaki mpona babangi.[1]
[1] Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ فِي ٱلسَّرَّآءِ وَٱلضَّرَّآءِ وَٱلۡكَٰظِمِينَ ٱلۡغَيۡظَ وَٱلۡعَافِينَ عَنِ ٱلنَّاسِۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Baye babimisaka na tango ya bisengo mpe na tango ya mpasi, mpe baye bakokaka kokanga nkanda te mpe baye balimbisaka bato, Mpe Allah alingaka bato ya bolamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلَّذِينَ إِذَا فَعَلُواْ فَٰحِشَةً أَوۡ ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ ذَكَرُواْ ٱللَّهَ فَٱسۡتَغۡفَرُواْ لِذُنُوبِهِمۡ وَمَن يَغۡفِرُ ٱلذُّنُوبَ إِلَّا ٱللَّهُ وَلَمۡ يُصِرُّواْ عَلَىٰ مَا فَعَلُواْ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
Mpe baye bazali soki basali mbeba to bamisali mabe, bakanisi Allah mpe basengi bolimbisi mpona yango, mpe moko te alimbisaka masumu bobele Allah, mpe batingamaka te na maye bazalaki kosala ya mabe, na bango bazali na kati ya koyeba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أُوْلَٰٓئِكَ جَزَآؤُهُم مَّغۡفِرَةٞ مِّن رَّبِّهِمۡ وَجَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ وَنِعۡمَ أَجۡرُ ٱلۡعَٰمِلِينَ
Bango wana nde lifuta na bango ezali bolimbisi kowuta epai ya Nkolo na bango, mpe baparadizu wapi epai mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati, oyo nde lifuta ya basali malamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِكُمۡ سُنَنٞ فَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
Makambo ebele esilaki koleka liboso na bino, botambola na mokili mpe bomona ndenge nini bato ya mabe basukaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
هَٰذَا بَيَانٞ لِّلنَّاسِ وَهُدٗى وَمَوۡعِظَةٞ لِّلۡمُتَّقِينَ
Oyo ezali mateya ya polele mpona bato, mpe lisungi na malendisi mpona babangi.[1]
[1] Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تَهِنُواْ وَلَا تَحۡزَنُواْ وَأَنتُمُ ٱلۡأَعۡلَوۡنَ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
Botika babeta bino te mpe bomikitisa te mpo bozali likolo na bango, soki ya sôló bozali bandimi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِن يَمۡسَسۡكُمۡ قَرۡحٞ فَقَدۡ مَسَّ ٱلۡقَوۡمَ قَرۡحٞ مِّثۡلُهُۥۚ وَتِلۡكَ ٱلۡأَيَّامُ نُدَاوِلُهَا بَيۡنَ ٱلنَّاسِ وَلِيَعۡلَمَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَيَتَّخِذَ مِنكُمۡ شُهَدَآءَۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلظَّٰلِمِينَ
Soki bozoki mpota, bango mpe bazoki lokola. Na boye tozali kotambuisa mikolo okati na bato mpo ete Allah ayeba bandimi, mpe azua okati na bino baye bawei mpona kobunda na nzela naye, mpe Allah alingaka bato ya mabe te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាលីអុិមរ៉ន
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ